Masalisi mpo na Makomi
Lisese


Lisese

Kati na makomi, lisese ezali na ndimbola mibale ekeseni: (1) Lisolo ya mpamba mpo na kolimbola mpe koteya bosolo ya molimo to ya libongisi. Lisese lifandisami na komekaka eloko to likambo songolo na bosolo, mpe ndimbola to etinda ya lisese ezali mbala mingi mpenza ya kobombama na bayoki baye balengelami na molimo mpo na koyoka yango (Mat. 13:10–17). Yesu ateyaki mbala mingi na masese. Mpo na kozwa molai ya masese minene na Ye, tala Boyokani ya Bansango Malamu kati na bobakisi. (2) Liloba ya boteyi to toli moko ya mokuse.

Buku ya Masese

Buku ya Boyokani ya Kala oyo ezali na masese, maloba, mpe makomi ya ntoki, ndambo ya oyo ekomamaki na Solomo. Buku ya Masese etangemi mbala na mbala kati na Boyokani ya Sika.

Mikapo 1–9 ezali na ndimbola ya bwania ya solo. Mikapo 10–24 ezali na bosangisi ya maloba mpo na oyo etali nzela malamu to nzela ebe ya bomoi. Mikapo 25–29 ezali na masese ya Solomo oyo bato ya Hizikiya, mokonzi ya Yuda, bakomaki. Mikapo 30–31 ezali na ndimbola moko ya mwasi malamu.

Bimisa na lokasa