Masalisi mpo na Makomi
Liyaka ya Ntalo Monene


Liyaka ya Ntalo Monene

Bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele ekokisami na “liyaka ya ntalo monene” (Mat. 13:45–46).

Liyaka ya Ntalo Monene ezali lisusu nkombo oyo epesama na moko ya maboke minei ya makomi oyo mabiangami “makomi masantu” ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Bobimi ya yambo ya Liyaka ya Ntalo Monene lokola buku esalemaki na mobu 1851 mpe ezalaki na makambo oyo ezali sikawa kati na Malongi mpe Mayokani. Buku oyo ebimi uta 1902 ezali na (1) Matangi minene ya buku uta na bobongoli ya Genese na Joseph Smith, oyo mabiangami buku ya Mose, mpe ya Matai 24, boye ebiangami Joseph Smith—Matai; (2) Bobongoli ya boko makomi likolo ya papilusi ya Ejipito na Joseph Smith oyo azwaki na mobu 1835, boye ebiangamaki buku ya Abalayama; (3) litangi monene uta na mambi ya kala ya Eklezia na Joseph Smith oyo akomaki na mobu 1838, oyo ebiangami Joseph Smith—Mambi ya Kala; mpe (4) Biteni ya Bondimi, masakoli zomi na misato ya boyambi mpe malongi.

Bimisa na lokasa