Makomi
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1


Joseph Smith—Mambi ya Kala

Matangi uta na Mambi ya Kala ya Profeta Joseph Smith

Mokapo 1

Joseph Smith azali koyebisa makambo matali batata na ye, bato ya libota na ye, mpe bifandelo na bango ya yambo—Botumoli ya ndenge mosusu na ntina ya biyamba eyingelaki na westi ya ekolo ya New York—Akamati mokano ya koluka kozwa bwania lokola elakisami na Yakobo—Tata mpe Mwana bamonani, mpe Joseph Smith abiangami na mosala na ye lokola profeta. (Milongo 1–20.)

1 Likolo ya bansango mingi oyo etambwisamaki na bato ya makanisi mabe mpe bato ya poloso, na kotalaka ebandeli mpe bokoli ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, nsango oyo nyonso ebotisamaki na bato oyo basalaki yango mpo na kotelemela lokumu na yango lokola Eklezia mpe bokoli na yango kati na mokili—Natindami kokoma mokolo oyo, mpo na kosembola makanisi ya bato, mpe kopesa bikela na moto nyonso oyo azali koluka bosolo, lokola esalemaki, ezala mpo na oyo etali ngai moko mpe mpo na oyo etali Eklezia, lokola nayebi bikela yango lolenge ezali.

2 Kati ya mokolo oyo nakolakisa makambo ya ndenge na ndenge matali Eklezia oyo, na bosolo mpe bosembo, lokola malekaki, soki te lokola ezali sikawa, mpe ezali sikawa [1838] mobu ya mwambe uta na bobongisami ya oyo etangami Eklezia.

3 Nabotamaki na mobu ya Nkolo na biso nkoto yoko nkama mwambe mpe mitano, na mokolo ya ntuku mibale na misato ya sanza ya zomi na mibale, na engumba ya Sharon, na etuka ya Windsor, Ekolo ya Vermont. … Tata na ngai, Joseph Smith, Sen, atikaki Ekolo ya Vermont, mpe akendaki na Palmyra, na etuka ya Ontario (sikawa Wayne), na Ekolo ya New York, wana ezalaki ngai na mibu zomi, soki mpe mpembeni wana. Penepene na mobu minei nsima ya boyei ya Tata na ngai na Palmyra, akendaki elongo na libota na ye kofanda na Manchester na etuka se moko ya Ontario—

4 Libota na ye ezalaki na milimo zomi na moko, elingi koloba, tata na ngai, Joseph Smith; mama na ngai Lucy Smith (oyo kani nkombo, liboso ya libala na ye, ezalaki Mack, mwana mwasi ya Solomon Mack); bandeko mibali na ngai, Alvin (oyo akufaki mokolo ya 19, sanza ya zomi na moko, ya mobu 1823, na mobu na ye ya ntuku mibale na motoba), Hyrum, ngai moko, Samuel Harrison, William, Don Carlos; mpe bandeko basi na ngai, Sophronia, Catherine, mpe Lucy.

5 Na ntango moko kati na mobu ya mibale nsima na biso kokende na Manchester, ezalaki na koningana ya ndenge mosusu esika tozalaki kofanda mpo na ntina ya eyamba. Ebandaki na Bametodiste, kasi noki ekomaki bipayi nyonso na kati ya mangomba nyonso kati na eteni wana ya mboka. Zambi, etuka mobimba ya mboka ezalaki lokola esimbami na koningana wana, mpe bato baike basanganaki bango moko na mangomba ya biyamba ekeseni; yango nde ememaki mobulu ya moke te mpe bokabwani kati na bato, bamoko kobelelaka, “Tala, awa!” mpe basusu, “Tala, kuna!” Bamoko kowelela mpo na bondimi ya Bametodiste, basusu mpo na oyo ya Baplesibitelia, mpe basusu mpo na oyo ya Babatisite.

6 Mpo, ata bolingo monene oyo babongwami ya mangomba oyo nyonso bazalaki kolakisa na ntango ya bobongwami na bango, mpe mpila monene oyo emonisamaki na moko moko ya bakambi na bango, baye bazalaki na mpiko ya kotelema mpe kotombola bozali oyo ya posa oyo monene ya boyambi, mpo ete bato nyonso bakoka kobongwama, na ndenge bazalaki kobenga yango, tika bango bakota na lingomba nini basepeli; kasi ntango babongwami babandaki kokabwana, bamoko na eyamba moko mpe bamosusu na mosusu, emonanaki ete koyokelana malamu ya banso banganganzambe mpe babongwami ezalaki mingi kaka ya maloba kasi ya solo te; mpo ezalani ya mobulu monene mpe koyokelana mabe eyaki kolanda—nganganzambe kowelanaka na nganganzambe, mpe mobongwami na mobongwami; na lolenge ete koyokelana malamu na bango, soki ezalaki, ebungisamaki mobimba na bitumba ya maloba mpe boweli na ntina ya makanisi.

7 Na ntango wana nazalaki na mobu na ngai ya zomi na mitano. Libota ya tata na ngai eteyamaki na bondimi ya Baplesibitelia, mpe minei kati na bango bakotaki na eklezia wana, mingi mingi, mama na ngai, Lucy; bandeko na nga ya mibali Hyrum mpe Samuel Harrison; mpe ndeko na nga ya mwasi Sophronia.

8 Na ntango oyo ya koningana monene mayele na ngai etindamaki na kobanza ya mozindo mpe komitungisa makasi; kasi ata ko mayoki ya motema na ngai mazalaki ya mozindo mpe mbala mingi makasi, kasi namitiaki mosika na mangomba oyo nyonso, atako nakendaki makita na bango mingi mbala mingi na ndenge libaku ezalaki kopesama. Na koleka ya ntango mayele na ngai ekomaki komipesa moke epayi ya ligomba ya Bametodiste, mpe nayokaki mua mposa ya kosangana na bango; kasi mobulu mpe kowelana na kati ya biyamba nyonso ezalaki makasi makasi mingi, na ndenge ete nzela ezalaki te mpo na moto elenge lokola ngai, mpe oyo ayebaki bato mpe makambo te, akoka koyeba libela mpenza nani azalaki na solo mpe nani azalaki na solo te.

9 Na tango mosusu mayele na ngai ezalaki na koningana makasi, koganga mpe mobulu ezalaki makasi koleka mpe na nsuka te. Baplesibitelia batelemelaki mpenza koleka Babatiste mpe Bametodiste, mpe basalelaki nguya nyonso ezala ya mayele ezala ya mayele ya lokuta mpo na kolakisa mabunga na bango, to, ata nini, kosala ete bato bakanisa ete bazali na libunga. Na ngambo Epayi mosusu, Babatiste mpe Bametodiste bango mpe bazalaki lolenge moko na mpila ya kofandisa malongi na bango moko mpe koboyisa nyonso mosusu.

10 Na kati ya etumba oyo ya maloba mpe mobulu ya makanisi, nazalaki mbala na mbala komilobela: Nini esengeli kosalama? Wapi kati ya biyamba oyo nyonso ezali solo; to, ezali bango nyonso na libunga? Soki moko kati na bango azali solo, ezali oyo wapi, mpe nakoyeba yango lolenge boni?

11 Wana ngai nazalaki komitungisa na nse ya mpasi monene oyo ewutaki na boweli ya mangomba ya bato ya biyamba, nazalaki mokolo moko kotanga Mokanda ya Yakobo, mokapo ya yambo mpe molongo ya mitano, oyo elobi: Soki moko kati na bino azangi bwania, tika ete asenga na Nzambe, oyo apesaka na bato nyonso na likabo, mpe apamelaka te; mpe ekopesamela ye.

12 Litangi moko ya makomi esila koya na nguya makasi na motema ya moto te koleka oyo eyaki na ntango wana na motema na ngai. Ezalaki lokola kokota na bokasi monene kati na mayoki ma motema na ngai. Nabanzaki likolo na yango lisusu mpe lisusu, koyebaka ete soki moto azalaki na mposa ya bwania uta na Nzambe, ezalaki ngai; mpo nayebaki lolenge nini kosala te, mpe longola se soki nakokaki kozwa bwania koleka oyo nazalaki na yango na ntango wana, nalingaki kotikala koyeba te; mpo bateyi ya biyamba ya mangomba oyo nyonso ya ndenge na ndenge bazalaki kososola matangi moko ya makomi na bokeseni mpenza ete bazalaki kobebisa elikya nyonso boliki ya kokata likambo na kolukaka eyano kati na Biblia.

13 Nsima ya ntango molai nayaki kosukisa ete nasengelaki kotikala kati na molili mpe mobulu, to mpe epayi nasengelaki kosala lokola Yakobo atindi, elingi koloba, kosenga epayi na Nzambe. Na boleki ya ntango nakamataki mokano ya “[kosenga] na Nzambe,” na bosukisi ete soki apesaka bwania na baoyo wana bazangi bwania, mpe akopesa na motema ya kokaba, mpe na mpamela te, nakokaki komeka.

14 Bongo, na kolanda oyo, mokano na ngai ya kosenga na Nzambe, nabendanaki na zamba mpo na komeka. Ezalaki na ntongo ya mokolo moko kitoko, mokolo ya polele, na ebandeli ya eleko ya milona ya mobu koto yoko nkama mwambe na ntuku mibale. Ezalaki mbala ya yambo kati na bomoi na ngai ete nameka kosala bongo, mpo kati na mitungisi na ngai nyonso naino namekaki kosambela na mongongo makasi te.

15 Esilaki ngai kobendana na esika wapi nakanaki liboso kokende, nsima ya kotala nzinganzinga na ngai, mpe ya komimonaka se ngai moko, nafukamaki mpe nabandaki koyokisa mposa ya motema na ngai epayi ya Nzambe. Nabandaki kaka kosala bongo, ntango sasaipi nakangisamaki na nguya moko oyo elongaki ngai mobimba, mpe oyo ezwaki bokasi likolo na ngai na lolenge ya kokamwa kino kokangisa lolemo na ngai na lolenge ete nakokaki koloba te. Molili makasi moyingelaki nzinganzinga na ngai, mpe emonanaki mwa ntango moko epayi na ngai lokola kaka ete natindamaki na kufa ebomi ya mbalakata.

16 Kasi, na kosalelaka nguya nyonso na ngai mpo na kobenga Nzambe akangola ngai uta na nguya ya monguna oyo akangaki ngai, mpe na ntango oyo mpenza nalingaki kozindisama kati na kozanga elikya mpe komitika ngai moko mpo na kufa ebomi—kufa ebomi ya makanisi kaka te, kasi na nguya ya ekelamo yoko ya solo uta na mokili oyo emonanaka te, oyo azalaki na nguya wana ya kokamwa oyo naino nayoka te liboso na ekelamo yoko—kaka se na ntango oyo ya kobanga mpenza, namonaki molongo ya pole mpenza mpenza likolo ya moto na ngai, koleka bongengi ya moi, oyo ezalaki kokita malembe malembe kino ekweyaki likolo na ngai.

17 Emonanaki kala mingi te ete namimonaki ngai moko ya kokangolama uta na monguna oyo akangisaki ngai. Ntango pole yango efandelaki ngai namonaki Bato mibale, baoyo kani bongengi mpe nkembo ekoki kolimbolama te, batelemi likolo na ngai kati na mopepe. Moko na bango alobaki epayi na ngai, kobiangaka ngai na nkombo mpe alobaki, kolakisaka mosusu na mosapi—Oyo azali Mwana Molingami na ngai. Yokela ye!

18 Ntina na ngai ya kokende kotuna Nkolo ezalaki mpo na koyeba lingomba nini kati ya mangomba nyonso ezalaki solo, ete nakoka koyeba oyo wapi nakokaki kokota. Boye, kala mingi te awa nazwaki bokasi na ngai, na lolenge ete nakokaki koloba, natunaki bato oyo batelemaki na pole likolo na ngai, lingomba nini kati na mangomba nyonso ezalaki solo (mpo ete etikilaki nanu kokota na motema na ngai te ete nyonso ezalaki na libunga)—mpe oyo wapi nasengelaki kokota.

19 Napesamaki eyano ete nasengelaki kokota na moko na yango te, mpo bazalaki banso na libunga; mpe Moto oyo azalaki koloba na ngai ayebisaki ngai ete biyambayamba na bango nyonso ezalaki somo na miso na ye, ete basakoli wana nyonso bazalaki bakosi; ete: “bazali kobelema penepene na ngai na mbebu na bango, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai, bazali koteya mitindo ya bato lokola malongi, na kozalaka na lolenge moko ya bonzambe, kasi bazali kowangana nguya na yango.”

20 Apekisaki ngai lisusu nakota na moko na yango te; mpe alobaki na ngai makambo mingi mosusu, oyo nakoki kokoma na ntango oyo te. Ntango makanisi ezongelaki ngai lisusu, namikutaki nalali na mokongo na ngai, nazakotala likolo na lola. Ntango pole elunguaki, nazalaki na bokasi te; kasi noki awa ezongaki mwa ndambo, nakendaki na ndako. Mpe awa nga nayekemaki na efelo ya esika ya moto, mama atunaki likambo nini nazalaki na yango. Nazongisaki maloba, “Komitungisa te, Nyonso ezali malamu—Nazali malamu na lolenge ekoki.” Mpe nayebisaki mama na ngai, “Nasili koyekola mpo na ngai moko ete Kiplesibitelia ezali solo te.” Emonanaki lokola monguna ayebaki, na ebandeli mpenza ya bomoi na ngai, ete natindamaki kozala mopanzi kimia mpe motungisi ya bokonzi na ye; soki bongo te mpo na nini nguya ya molili esangana mpo na kobundisa ngai? Mpo na nini botelemeli mpe monyokoli oyo eyelaki ngai, pene ya bomwana na ngai?

Boko bateyi mpe basakoli basusu ya eyamba babwakaki lisolo ya Limoni ya Yambo—Monyokoli mobakisamaki kokweya likolo ya Joseph Smith—Atatoli mpo na bosolo ya limoni. (Milongo 21–26.)

21 Mwa mikolo nsima ete nazwa limoni oyo, esalemaki ete nazalaki elongo na mokkati na bateyi ya eyamba ya Methodiste, oyo azalaki kosala mingi na botumoli boye ya biyamba nasili kotanga awa liboso; mpe, wana ezalaki ngai kosolola na ye na ntina ya likambo ya eyamba, nazwaki libaku ya kopesa ye lisolo ya limoni oyo nazwaki. Ezaleli na ye ekamwisaki ngai makasi; azwaki lisolo na ngai bobele na bolembu, kasi na botioli monene, kolobaka ete nyonso wana ezali limoni ya zabulu, ete na mikolo oyo ezali na makambo ya ndenge wana lokola mamoni mpe bimoniseli te; ete makambo nyonso mana masilaki na bapostolo, mpe makokaki kozala lisusu te.

22 Noki namonaki, nzokande, ete koyebisaka lisolo na ngai ememisaki ngai ngambo monene na kati ya basakoli ya biyamba, mpe ezalaki ntina ya monyokoli monene, oyo ekobaki kobakisama; mpe ata nazalaki elenge mobali oyo ayebanaki te, bobele na ntaka ya mibu zomi na minei mpe zomi na mitano, mpe ata masengami ya bomoi masalaki ete nazala elenge mobali ya mpamba kati na mokili, nzokande bato ya lokumu basengelaki te kobenda bokebi mpo na kotombokisa mayele ya bato nyonso na ngai, mpe kobimisa monyokoli makasi; mpe oyo ezalaki momeseno na kati ya mangomba nyonso ya bokabwani—banso basanganaki mpo na konyokola ngai.

23 Etindaki ngai nsima wana na makanisi makasi mpenza, mpe kokanisaka mingi uta wana, lolenge kani ya kobangisa mpenza ezalaki ete elenge mobali oyo ayebani te, se moke koleka mibu zomi na minei, mpe moko, lisusu, oyo asengisamaki na mposa ya kozwa ata ndambo moke mpo na bomoi na nzela ya mosala ya mokolo na mokolo, akoma moto ya motuya mpo na kobendaka bokebi ya bato banene ya mangomba ya bokabwani monene ya eleko, mpe na lolenge ya kosala kati ya bango molimo ya bonyokoli koleka makasi mpe ya koyinana. Kasi kokamwa soki mpe kokamwa te, ezalaki se bongo, mpe ezalaki ntina ya mawa monene mpo na ngai moko.

24 Nzokande, ezalaki mpenza ekela ete namonaki limoni. Uta wana nazalaki kokanisa, ete nayokaki mingi lokola Paulo, ntango asambaki botubi na ye liboso ya Mokonzi Akalipa, mpe ayebisaki lisolo ya limoni azwaki ntango amonaki pole, mpe ayokaki mongongo; kasi nzokande ezalaki bobele bato moke oyo bandimaki ye; bamoko balobaki ete azalaki moto na lokuta, basusu ete akomaki liboma; mpe batiolaki mpe bafingaki ye. Kasi nyonso oyo ebomaki te bosolo ya limoni na ye. Amonaki limoni, ayebi ete amonaki, mpe minyokoli nyonso na nse ya lola mikokaki te kosala lolenge mosusu; mpe atako banyokolaki ye kino kufa, ayebaki nzokande, mpe alingaki kaka koyeba kino na mpema na ye ya nsuka, ete amonaki pole mpe ayokaki mongongo kolobaka na ye, mpe mokili mobimba mokokaki te kosala ete akanisa to mpe andima lolenge mosusu.

25 Ezalaki mpe bongo na ngai. Namonaki mpenza pole, mpe kati na pole wana namonaki Bato mibale, mpe na bosolo balobaki mpenza na ngai; mpe ata bayinaki ngai mpe banyokolaki ngai mpo nalobaki ete namonaki limoni, nzokande ezali solo; mpe wana ezalaki bango konyokolaka ngai, koyinaka ngai, mpe kolobaka lolenge nyonso ya mabe na ngai na lokuta mpo nalobaki bongo, natindamaki koloba kati na motema na ngai: Mpo na nini konyokola ngai mpo na kolobaka bosolo? Namonaki solo limoni; mpe nazali nani mpo ete natelemela Nzambe, soki mpe mpo na nini mokili ekanisi kosala ete nawangana oyo namonaki solo? Mpo namonaki limoni; nayebi yango, mpe nayebi ete Nzambe ayebi yango, mpe nakoki kowangana yango te, to komeka kosala yango; soki bongo te nayebaki ete na kosalaka bongo nalingaki kotuka Nzambe, mpe kokweisama.

26 Sikawa mayele na ngai masepelaki na kotalaka mokili ya mangomba ya bokabwani—ete nasengelaki te kokota na moko kati na yango, kasi kokoba kozala lolenge nazalaki kino nakozwa malakisi mosusu nsima. Namonaki ete litatoli ya Yakobo ezali solo—ete moto oyo azangi bwania akokaki kosenga na Nzambe, mpe kozwa, mpe akopamelama te.

Moroni amonanaki na Joseph Smith—Nkombo ya Joseph esengeli eyebana na kati ya bikolo nyonso mpo na bolamu mpe mpo na mabe—Moroni alobeli ye na ntina ya Buku ya Mormon mpe na ntina ya masambisi makoya uta na Nkolo mpe atangi makomi mingi—Esika ya kobombama ya bapalaki ya wolo ebimisami—Moroni azali kokoba koteya Profeta. (Milongo 27–54.)

27 Nakobaki se kolanda mosala na ngai ya mokolo na mokolo na bomoi kino na mokolo ya ntuku mibale na moko ya sanza ya libwa, nkoto nkama zomi na mwambe mpe ntuku mibale na misato, ntango nyonso kozwaka monyokoli makasi uta na maboko ya biteni ya bato nyonso, ezala ya eyamba mpe baoyo bazali ya eyamba te, mpamba te nakobaki kondima ete namonaki limoni.

28 Na ntaka ya ntango oyo ezwami kati na ntango nazwaki limoni mpe mobu ya nkama zomi na mwambe mpe ntuku mibale na misato—nsima ya kopekisama kokota na moko ya mangomba ya bokabwani ya eleko wana, mpe kozalaka mpenza elenge, mpe konyokwama na baoyo wana basengelaki kozala baninga na ngai mpe kosalela ngai na boboto, mpe soki bakanisaki namikosaki basengelaki kosala makasi kozongisa ngai na nzela na lolenge malamu mpe ya bolingo—batikaki ngai na masenginia ya mibeko na mibeko; mpe, na komisanganaka na bato ya lolenge nyonso, mbala na mbala nakweyaki kati na mabunga mingi ya liboma, mpe nalakisaki bolembu ya bolenge, mpe bozangi kokoka ya bomoto; oyo, nazali na mawa ya koloba, ememaki ngai kati na masenginia ya ndenge na ndenge, oyo makoki te kondimama na miso ya Nzambe. Na kosalaka ntubela oyo, esengeli te ete moto akanisa kokamata ngai elindo ya masumu monene to ya nko. Ezaleli ya kosala lisumu ya bongo ezalaki soki moke te kati na lolenge na ngai. Kasi nazwami elindo ya kozala moto likolo likolo, mpe mbala mosusu nazwamaki na bosepeli ya baninga, mpe bongo na bongo, elongobanaki te na ezaleli oyo esengeli kolakisa mpo na moto oyo abiangamaki na Nzambe lokola ezalaki ngai. Kasi oyo ekokamwisa mpenza moto nyonso oyo akundoli bolenge na ngai te, mpe ameseni na ezaleli na ngai ya mbotama ya moto likolo likolo te.

29 Na engebene ya makambo oyo, namimonaki mbala mingi kokweisama mpo na bolembu mpe kozanga bobongi nie na ngai; ntango, na mpokwa ya mokolo ya ntuku mibale na moko ya sanza ya libwa oyo natangaki awa likolo, nsima ya kokende kolala na mbeto na ngai na butu, namipesaki na losambo mpe libondeli na Nzambe ya Bokasi nyonso mpo na bolimbisi ya masumu mpe maboma na ngai nyonso, mpe lisusu mpo ete amimonisa epayi na ngai, ete nakoka koyeba oyo etali ezalela mpe etelemeli na ngai liboso na ye; mpo nazalaki na boliki nyonso ya kozwa mamonisi uta na Nzambe, lokola nazwaki moko liboso.

30 Wana ezalaki ngai boye kati na kobelelaka epayi ya Nzambe, namonaki pole kobimaka kati na kisuku na ngai, oyo ekobaki koyikana kino kisuku engengisamaki koleka moi ya nzanga, ntango na mbala moko moto moko amonanaki mpembeni na mbeto na ngai, atelemaki na mopepe, mpo makolo na ye etutaki nse te.

31 Alataki nzambala monene ya mpembe mingi koleka. Ezalaki mpembe koleka eloko nyonso ya mabele naino namona te; mpe nandimi te ete eloko moko ya mabele ekokaki kosalema mpo na komonana mpembe mpe bongengi koleka boye. Maboko na ye ezalaki mpamba, mpe bibandeli ya maboko na ye mpe lokola, na likolo ya nkingo ya loboko; bongo lisusu, makolo na ye ezalaki mpamba, mwa moke likolo ya makaka. Moto mpe nkingo na ye ezalaki mpe mpamba. Nakokaki komona ete alataki elamba mosusu te bobele nzambala oyo, mpo ezalaki polele, ete nakokaki komona ntolo na ye na kati.

32 Ezalaki te bobele nzambala na ye oyo ezalaki mpembe mpenza, kasi bomoto na ye mobimba ezalaki ya nkembo koleka mayele ya bolimboli, mpe elongi na ye solo lokola monkalikali. Kisuku ezalaki na pole makasi koleka, kasi ezalaki kongenga mingi mpenza te koleka nzinganzinga ya bomoto na ye. Ntango natalaki ye mbala ya yambo, nabangaki; kasi kala mingi te bobangi etikaki ngai.

33 Abiangaki ngai na nkombo, mpe alobaki epayi na ngai ete azalaki ntoma atindami uta na miso ya Nzambe epayi na ngai, mpe ete nkombo na ye ezalaki Moroni; ete Nzambe azalaki na mosala ya kosala mpo na ngai; mpe ete nkombo na ngai ekoyebana mpo na bolamu mpe mabe na kati ya bikolo nyonso, mabota nyonso, mpe minoko nyonso, to ete ekolobama na bolamu mpe na mabe na kati ya bato nyonso.

34 Alobaki ete ezalaki na buku moko ebombisami, ekomami likolo ya bapalaki ya wolo, oyo ezali kopesa lisolo ya bafandi ya kala ya mokili oyo, mpe ya ekanga epayi wapi bawutaki. Alobaki lisusu ete litondi ya nsango malamu ya libela ezalaki kati na yango, lokola epesamaki na Mobikisi epayi na bafandi ya kala;

35 Lisusu, ete ezalaki na mabanga mibale kati na matimbo ya mpauni—mpe mabanga oyo, ekangama na ebende ya ntolo, esali oyo ebiangami Ulima mpe Tumima—ebombisama elongo na bapalaki; mpe kozala mpe kosalela mabanga oyo ezalaki nini oyo esalaki “bamoni” na ntango ya kala soki te na ntango esila koleka; mpe ete Nzambe alengelaki yango mpo na mwango ya kobongola buku yango.

36 Nsima ya koyebisa ngai makambo oyo, abandaki kotanga masakoli ya Boyokani ya Kala. Yambo atangaki ndambo ya mokapo ya misato ya Malaki; mpe atangaki lisusu mokapo ya minei to ya nsuka ya lisakoli se moko lina, ata kutu na bokeseni moke uta na lolenge ekomami kati na Babiblia na biso. Na esika ya kotanga molongo ya yambo lokola ekomami na babuku na biso, atangaki yango boye:

37 Mpo tala, mokolo ezali koya oyo ete bakozika lokola na moto makasi, mpe bato nyonso ya lolendo, iyo, mpe baoyo nyonso basalaka na nkuna bakozikisama lokola mpumbulu; mpo bango nyonso oyo bakoya bakozikisa bango, elobi Nkolo na Bibele, ete ekotikela bango mosisa soki mpe etape moko te.

38 Mpe lisusu, atangaki molongo ya mitano boye: Tala, nakobimisa epayi na bino Bonganganzambe, na maboko ya profeta Eliya, liboso ya boyei ya mokolo monene mpe ya nsomo ya Nkolo.

39 Atangaki lisusu molongo molandi na lolenge ekeseni: Mpe akolona kati na mitema ya bana bilako epesamaki na batata, mpe mitema ya bana mikobaluka epayi ya batata na bango. Soki ezalaki bongo te, mabele mobimba elingaki kobebisama nie na boyei na ye.

40 Mpo na kobakisa likolo ya oyo, atangaki mokapo ya zomi na moko ya Yisaya, kolobaka ete elingi ekokisama. Atangaki lisusu mokapo ya misato ya Misala, milongo ya kotanga ya ntuku mibale na mibale mpe ntuku mibale na misato, sikisiki mpenza lokola ezali kati na Boyokani ya Sika na biso. Alobaki ete profeta wana azalaki Klisto; kasi mokolo moyei naino te ntango “bango oyo bakolinga te koyoka mongongo na ye bakokatama na kati ya bato,” kasi ekoya kala mingi te.

41 Atangaki lisusu mokapo ya mibale ya Yoele, uta na molongo ya ntuku mibale na mwambe kino na molongo ya nsuka. Alobaki lisusu ete oyo ekokisami naino te, kasi ekokokisama kala mingi te. Mpe mwa mosika alobaki ete litondi ya baoyo bazali Bayuda-te esengelaki koyingela kala mingi te. Atangaki matangi mingi mosusu ya makomi, mpe apesaki ndimbola mingi oyo ekoki te kotangama awa.

42 Lisusu, alobaki epayi na ngai, ete ntango nakozwa bapalaki wana oyo alobelaki—mpo ete ntango esengelaki kozwama ekokaki naino te—nasengeli kolakisa yango na moto moko te; ezala ebende ya ntolo elongo na Ulima mpe Tumima mpe te; bobele na baoyo nakotindama kolakisa bango; soki nakosala yango nakobebisama. Ntango ezalaki ye kosolola elongo na ngai mpo na oyo etali bapalaki, limoni efungwamaki na mayele na ngai ete nakokaki komona esika wapi bapalaki ebombisamaki, mpe esika yango na polele mpenza mpe na lolenge nyonso ete nayebaki lisusu esika yango ntango nakendaki kotala yango.

43 Nsima ya malakisi oyo, namonaki pole na kisuku ebandaki kosangana mpenza nzinganzinga na bomoto na ye oyo azalaki koloba elongo na ngai, mpe ekobaki kosala bongo kino kisuku etikalaki lisusu molili, longola se nzinganzinga na ye; ntango, na mbalakaka namonaki, lokola soki ezalaki, lidusu efungwamaki semba likolo na lola, mpe amataki kino alimwaki mobimba, mpe kisuku etikalaki lokola ezalaki yambo ete pole oyo uta na lola emonana.

44 Nalalaki kotambwisaka makanisi na likambo oyo ya lolenge na yango moko, mpe kokamwaka mpenza na oyo eyebisamaki epayi na ngai na ntoma oyo ya momeseno te; ntango namonaki, na katikati ya bomanyoli na ngai, na mbalakaka ete kisuku na ngai ebandaki lisusu kongengisama na pole, mpe na mbala moko, lokola ezalaki, ntoma se moko wana ya lola azalaki lisusu mpembeni na mbeto na ngai.

45 Abandaki, mpe lisusu azongelaki mpenza se makambo moko wana oyo asalaki na boyei na ye ya yambo, na bokeseni ata moke te; mpe ntango asilisaki kosala oyo, ayebisaki ngai mpo na oyo etali masambisi minene oyo ezalaki koya likolo ya mabele, elongo na libebi monene ya nzala, mompanga, mpe bokono; mpe ete masambisi oyo ya nsomo esengeli koya na mabele na nkola oyo. Esilaki ye kosangela makambo oyo, amataki likolo lisusu lokola asalaki liboso.

46 Na ntango oyo, bilili oyo etiamaki na mayele na ngai ezalaki ya mozindo mingi, ete mpongi ekimaki ngai na miso, mpe nalalaki makalekale na kokamwaka makambo oyo namonaki mpe nayokaki. Kasi bosutuki kani ezalaki ya ngai, ntango namonaki lisusu ntoma se moko wana mpembeni ya mbeto na ngai, mpe nayokaki ye kobandela soki te kozongela lisusu epayi na ngai makambo se moko wana lokola liboso; mpe abakisaki likebisi moko na ngai, koyebisaka ngai ete Satana akomeka kosenginia ngai, (na kotalaka bizaleli ya bokeleli ya libota ya tata na ngai), ete nazwa bapalaki mpo na ntina ya kozwa mosolo. Yango nde apekisaki ngai kosala, kolobaka ete nasengeli kozala na ntina mosusu te na makanisi na ngai na kozwaka bapalaki longola se mpo na kokembela Nzambe, mpe nasengelaki kopusama na ntina mosusu te bobele oyo ya kotonga bokonzi na ye; soki bongo te nakoki kozwa yango te.

47 Nsima ya bobimeli oyo ya misato, amataki lisusu na lola lokola liboso, mpe natikalaki lisusu komanyola likolo ya likambo ya lolenge ya kokamwa oyo nawutaki komona; ntango penepene na ntango moke kaka nsima esilaki ntoma uta na lola komata uta na ngai mpo na mbala ya misato, soso elelaki, mpe namonaki ete ntongo ezalaki kobelema, boye masolo na biso ezwaki mobimba ya butu wana.

48 Kala mingi te esilaki ngai kolamuka uta na mbeto na ngai, mpe, lokola momeseno, nakendaki kosala misala esengeli ya mokolo wana; kasi, na komekaka kosala lokola na bantango mosusu, namonaki bokasi na ngai kosila mingi mpenza ete ezangisaki ngai makoki ya kosala. Tata na ngai, oyo azalaki kosala elongo na ngai, amonaki ete eloko moko ezali malamu te epayi na ngai, mpe alobelaki ngai nazonga na ndako. Nabandaki kokende na mokano ya kozonga na ndako; kasi, na komekaka kokatisa lobala libanda ya zamba epayi wapi tozalaki, bokasi na ngai esilaki nie, mpe nakweyaki, na makasi te, likolo ya mabele, mpe mpo na mwa ntango nayebaki eloko moko lisusu te.

49 Eloko ya yambo oyo nakoki komikundola ezalaki mongongo kolobelaka ngai, kobiangaka ngai na nkombo. Natalaki likolo, mpe namonaki ntoma se moko wana atelemi likolo ya moto na ngai, azingami na pole lokola liboso. Nsima asangelaki lisusu epayi na ngai nyonso oyo asangelaki na ngai na butu elekaki, mpe atindaki ngai nakende na tata na ngai mpe nalobela ye limoni mpe mitindo oyo nazwaki.

50 Natosaki; nazongaki epayi ya tata na ngai na zamba, mpe nazongelaki koyebisa ye likambo mobimba. Ayanolaki ngai ete ezalaki ya Nzambe, mpe alobelaki ngai nakende mpe nasala lokola etindamaki ngai na ntoma. Natikaki zamba, mpe nakendaki na esika wapi ntoma alobelaki ngai ete bapalaki ebombisami; mpe engebene na polele ya limoni oyo namonaki mpo na yango, nayebaki esika yango na ntango kaka nakomaki kuna.

51 Mpembeni na mboka moke ya Manchester, na etuka ya Ontario, New York, ezali na ngomba ya monene, mpe ya molai koleka mosusu ya bisika ya mpembeni. Na mopanzi ya westi ya ngomba, mosika te na nsonge, na nse ya libanga moko monene, bapalaki elalaki wana, ebombisami na sanduku ya libanga. Libanga oyo ezalaki monene mpe lokola libungutulu na ntaka ya mopanzi ya likolo, mpe moke mingi epayi na nsuka, boye ete eteni ya katikati na yango emonanaki likolo ya mabele, kasi nsuka nzinganzinga mobimba ezipamaki na mabele.

52 Esilaki ngai kolongola mabele, nazwaki etombolelo, oyo nakotisaki na nse ya nsuka ya libanga, mpe na mwa makasi moke natombolaki yango. Natalaki na kati, mpe kuna solo namonaki bapalaki, Ulima mpe Tumima, mpe ebende ya ntolo, lokola elobamaki na ntoma. Sanduku oyo wapi bapalaki etandamaki esalemaki na mabanga matandama esika moko na lolenge ya nsima. Na nse ya sanduku, mabanga mibale etandamaki, lokola se ekatisaki sanduku, mpe likolo ya mabanga oyo bapalaki etandamaki mpe biloko mosusu elongo na yango.

53 Namekaki kobimisa yango, kasi napekisamaki na ntoma, mpe lisusu ayebisaki ngai ete ntango mpo na kobimisa yango ekokaki naino te, mpe ekokoka te, kino mibu minei uta na ntango wana; kasi ayebisaki ngai ete nasengeli koyaka na esika yango nsima ya mobu moko kaka uta na ntango wana, mpe ete akokutana kuna elongo na ngai, mpe ete nakokoba kosala boye kino ekokoka ntango mpo na kozwa bapalaki.

54 Na engebene, lokola natindamaki, nakendaki na nsuka ya mobu na mobu, mpe ntango nyonso nakutaki ntoma se moko wana kuna, mpe nazwaki mateya mpe mayele uta na ye mbala nyonso ya masolo na biso, mpo na oyo etali nini Nkolo akosala, mpe boniboni mpe na lolenge kani bokonzi na ye esengeli kokambama na mikolo ya nsuka.

Joseph Smith abali Emma Hale—Azwi bapalaki ya wolo uta na Moroni mpe abongoli boko bikomi—Martin Harris alakisi bikomi mpe bobongoli na Moteyi Anthon, oyo alobi, “Nakoki te kotanga buku oyo ekangami.” (Milongo 55–65.)

55 Lokola bomoi ya tata na ngai ezalaki ya bokeleli, tosengelaki kosala makasi na maboko na biso, komipesaka mpo na kofutama na mokolo mpe lolenge mosusu, lokola libaku ekokaki kopesama na biso. Ntango mosusu tozalaki epayi na biso, mpe ntango mosusu libanda, mpe na kokobaka na mosala tokokaki kozwa makoki ya kotambwisa bomoi ya malamu.

56 Na mobu 1823 libota ya tata na ngai bazwanaki na mawa monene na kufa ya ndeko mobali na ngai ya nkulutu, Alvin. Na sanza ya zomi, ya mobu 1825, bazwaki ngai na mosala na tata mokolo, moto moko ya limemia na nkombo ya Josiah Stoal, oyo azalaki na etuka ya Chenango, Ekolo ya New York. Ayokaki lisolo moko na ntina ya ndeke ya palata oyo efungwamaki na Baespaniole na Harmony, na etuka ya Susquehanna, Ekolo ya Pennsylvania; mpe azalaki, liboso ete nasala epayi na ye, kotimola mabele, mpo ete, soki ekokoka, kobombola ndeke yango. Esilaki ngai kokende kofanda elongo na ye, azwaki ngai, elongo na montika ya basali na ye, mpo na kotimola mabele mpo na kobombola ndeke ya palata, wapi nakobaki kosala mpo na penepene sanza moko, kozangaka kozwa elonga na mosala na biso, mpe na nsuka nandimisaki tata mokolo, moto ya limemia yango kotika kotimola yango. Tala ntina eyebanaki lisolo na ngai mpenza ete nazalaki motimoli misolo.

57 Na ntango oyo nazwamaki boye na mosala, natindamaki epayi ya tata Isaac Hale, ya esika wana; ezalaki kuna nde namonaki mwasi na ngai (mwana mwasi na ye), Emma Hale. Mokolo ya 18, sanza ya yambo, ya mobu 1827, tobalanaki, wana ezalaki ngai na mosala ya Tata Stoal.

58 Mpo nazalaki se kokoba kotatolaka ete namonaki limoni, monyokoli ezalaki se kolanda ngai, mpe libota ya mwasi na ngai etelemelaki libala na biso. Boye, nasengelaki komema ye epayi mosusu; bongo tokendaki mpe tobalanaki na ndako ya Tata mosambisi Tarbill, na South Bainbridge, na etuka ya Chenango, New York. Kala mingi te nsima ya libala na ngai, natikaki ndako ya Tata Stoal, mpe nakendaki epayi ya tata na ngai, mpe nasalaki mosala ya bilanga elongo na ye na eleko wana.

59 Na bolandi, ntango ekokaki mpo na kozwa bapalaki, Ulima mpe Tumima, mpe ebende ya ntolo. Na mokolo ya ntuku mibale na mibale ya sanza ya libwa, na mobu ya nkoto moko nkama mwambe ntuku mibale na nsambo, nsima ya kokende lokola momeseno na nsuka ya mobu mosusu na esika wapi ebombisamaki, ntoma se moko wana uta na lola apesaki ngai yango na mokumba oyo: ete nakozala moyanoli mpo na yango; ete soki nakotika yango ekende na bozangi bokebi, soki te na bopoto na ngai, nakokatama; kasi soki nakosalela bokasi na ngai nyonso mpo na kobomba yango, kino ye, ntoma yango, akosenga yango, ekobatelama.

60 Kala mingi te nasosolaki mpo na nini nazwaki mikumba ya ntina boye mpo na kobatela yango, mpe mpo na nini esalemaki ete ntoma alobaki ete ntango nakosala nini esengamaki na maboko na ngai, akosenga yango. Mpo kala mingi te wana eyebanaki ete nazalaki na yango, bokasi boike ya kilikili esalamaki mpo na kobotola yango epayi na ngai. Basalaki mayele nyonso oyo makokaki kokanisama mpo na ntina wana. Monyokoli ekomaki ya motema mabe mpe ekomaki makasi mingi koleka liboso, mpe ebele ya bato bazalaki na bokebi ntango nyonso mpo na kobotola yango epayi na ngai soki ekokaki. Kasi na bwanya ya Nzambe, ebatelamaki na maboko na ngai, kino ekokisaki ngai na yango nini esengelamaki na maboko na ngai. Ntango, engebene na maye ebongisamaki, ntoma yango asengaki yango, napesaki yango epayi na ye; mpe azali na yango na mokumba na ye kino na mokolo oyo, oyo ezali mokolo ya mibale ya sanza ya mitano, na mobu nkoto moko nkama mwambe ntuku misato na mwambe.

61 Nzokande, botumoli ezalaki se kokoba, mpe nungunungu na minoko nkoto na ye ezalaki ntango nyonso se kosalema na kotambwisaka lokuta na ntina ya libota ya tata na ngai, mpe na ntina ya ngai moko. Soki nasengelaki kobeta lisolo ata ya eteni ya nkoto moko ya lokuta yango, elingaki etondisa buku ya monene. Nzokande, monyokoli ekokaki lisusu te kondimama ete nasengelaki kolongwa na Manchester, mpe kokende elongo na mwasi na ngai na etuka ya Susquehanna, na Ekolo ya Pennsylvania. Wana ezalaki biso komilengela—mpo tozalaki mpenza babola, mpe monyokoli ezalaki se makasi likolo na biso ete ekokaki kozala mingi lolenge mosusu te se bobola—kati na mawa na biso tozwaki moninga kati ya moto moko ya lokumu na nkombo ya Martin Harris, oyo ayaki epayi na biso mpe apesaki ngai dollars ntuku mitano mpo na kosunga biso na mobembo na biso. Tata Harris azalaki moto ya engumba ya nzinganzinga na Palmyra, etuka ya Wayne, na Ekolo ya New York, mpe mosali ya limemia ya bilanga.

62 Na nzela ya lisungi oyo eyaki na ntango na yango nakokaki kokoma esika wapi nazalaki kokende na Pennsylvania; mpe kala mingi te nsima ya kokoma na ngai kuna nabandaki kolandisa kokoma nkoma ya bapalaki. Nakomaki motuya monene na yango, mpe na nzela ya Ulima mpe Tumima nabongolaki ndambo na yango, oyo nasalaki na ntaka ya ntango nakomaki na ndako ya tata ya mwasi na ngai, na sanza ya zomi na mibale, mpe sanza ya mibale elandi.

63 Mbala moko na sanza oyo ya mibale, oyo atangami likolo awa Tata Martin Harris ayaki na esika na biso, azwaki bikoma oyo nakomaki uta na bapalaki, mpe akendaki na yango na engumba ya New York. Mpo na oyo esalemaki na ye mpe na bikoma, natangi monoko na ye moko ya makambo, lokola asololaki na ngai nsima ya bozongi na ye, oyo ezalaki lokola elandi:

64 “Nakendaki na engumba ya New York, mpe nalakisaki bikomi oyo ebongolamaki, elongo na bobongoli na yango, na Moteyi Charles Anthon, moto moko ya limemia oyo ayebani makasi mpo na boyebi na ye ya nkoto ya mikanda. Moteyi Anthon alobaki ete bobongoli ezalaki malamu, malamu mingi koleka oyo amona liboso ete ebongolami uta na lokota ya Ejipito. Nsima nalakisaki ye oyo ebongolamaki naino te, mpe alobaki ete ezalaki ya Ejipito, Kaladi, Asula, mpe Alaaba; mpe alobaki ete ezali bikoma ya solo. Apesaki ngai mokanda ya bolakisi bosolo, kotatolaka na bato ya Palmyra ete ezalaki bikoma ya solo, mpe ete bobongoli ya yango lokola ebongolamaki ezalaki lisusu malamu. Nakamataki mokanda ya bolakisi bosolo mpe nakotisaki yango kati na libenga na ngai, mpe nazali penepene ya kobima na ndako, ntango Tata Anthon abengaki ngai nazonga nsima, mpe atunaki ngai lolenge kani elenge mobali yango ayebaki ete ezalaki na bapalaki na esika akutaki yango. Nazongisaki maloba ete anjelu ya Nzambe abimisaki yango epayi na ye.

65 “Nsima alobaki na ngai, ‘Tika natala mokanda ya bolakisi bosolo mona.’ Na engebene nabimisaki yango uta na libenga na ngai mpe napesaki ye yango, ntango akamataki yango mpe apasolaki yango na biteni, kolobaka ete ezali na eloko ya lolenge lona sikawa te lokola mosala ya banjelu, mpe ete soki namemaki bapalaki yango epayi na ye alingaki kobongola yango. Nayebisaki ye ete ndambo ya bapalaki ekangamaki, mpe ete napesami nzela ya komema yango te. Azongisaki maloba ete, ‘Nakoki kotanga te buku oyo ekangama.’ Natikaki ye mpe nakendaki epayi na Dokotele Mitchell, oyo andimaki nini Moteyi Anthon alobaki na kotalaka nyonso ezala bikoma to bobongoli.”

· · · · · · ·

Oliver Cowdery asalaki lokola mokomeli na kobongolaka Buku ya Mormon—Joseph mpe Oliver bazwi Bonganganzambe ya Alona uta na Yoane Mobatisi—Babatisami, bakulisami, mpe bazwi molimo ya masakoli. (Milongo 66–75.)

66 Na mokolo ya mitano ya sanza ya minei, ya mobu 1829, Oliver Cowdery ayaki na ndako na ngai, mpe kino ntango wana nazalaki naino namona ye te. Alobaki na ngai ete mpo na kotangisaka eteyelo na nzinganzinga wapi tata na ngai azalaki kofanda, mpe tata na ngai kozalaka moko ya baoyo wana batindaka bana na eteyelo, akendaki nandaki na ndako na ye, mpe wana ezalaki ye kuna libota eyebisaki ye makambo lolenge nazwaki bapalaki, mpe na engebene ayaki mpo na kozwa nsango uta na ngai.

67 Mikolo mibale nsima ya boyei ya Tata Cowdery (ezalaki ya mokolo ya 7, sanza ya minei) nabandaki kobongola Buku ya Mormon, mpe abandaki kokoma mpo na ngai.

· · · · · · ·

68 Tozalaki se kokoba mosala ya bobongoli, ntango, na sanza elandaki (Sanza ya mitano, ya mobu 1829), tokendaki mokolo moko kati na zamba mpo na kosambela mpe koluka koyeba uta na Nkolo mpo na oyo etali libatisi mpo na bolimbisi ya masumu, oyo tomonaki ete etangami kati na bobongoli ya bapalaki. Wana ezalaki biso komipesa boye, na kosambelaka mpe kobelelaka Nkolo, ntoma moko uta na lola akitaki na lipata ya pole, mpe nsima ya kotiaka maboko na ye likolo na biso, akulisaki biso, kolobaka:

69 Likolo na bino baninga na ngai basali, na nkombo ya Masiya, napesi Bonganganzambe ya Alona, oyo ezali na bafungola ya mosala ya banjelu, mpe ya nsango malamu ya boyamboli, mpe ya libatisi na bozindisi mpo na bolimbisi ya masumu; mpe oyo ekolongolama lisusu te na mabele kino bana ya Lewi ya mibali bakobonza lisusu libonza epayi ya Nkolo kati na bosembo.

70 Alobaki ete Bonganganzambe ya Alona boye ezalaki na nguya te ya kotiaka maboko mpo na kopesa likabo ya Molimo Mosantu, kasi oyo esengeli kopesama likolo na biso nsima; mpe atindaki biso tokende kobatisama, mpe apesaki biso malakisi ete nasengeli kobatisa Oliver Cowdery, mpe ete nsima asengeli kobatisa ngai.

71 Na engebene tokendaki mpe tobatisamaki. Yambo nabatisaki ye, mpe nsima abatisaki ngai—na bolandi natiaki maboko na ngai likolo ya moto na ye mpe nakulisaki ye na Bonganganzambe ya Alona, mpe nsima atiaki maboko na ye likolo na ngai mpe akulisaki ngai na Bonganganzambe se moko—mpo totindamaki bongo.*

72 Ntoma oyo ayaki kotala biso na libaku oyo mpe apesaki Bonganganzambe boye likolo na biso, alobaki ete nkombo na ye ezalaki Yoane, se moko oyo abiangami Yoane Mobatisi kati na Boyokani ya Sika, mpe ete azalaki kosala na nse ya bokambami ya Petelo, Yakobo mpe Yoane, baoyo bazali na bafungola ya Bonganganzambe ya Melikisedeki, Bonganganzambe boye wapi, alobaki, ekopesama na biso na ntango esengeli, mpe ete nakobiangama Mpaka ya yambo ya Eklezia, mpe ye (Oliver Cowdery) ya mibale. Ezalaki na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mitano, ya mobu 1829, ete tokulisamaki na loboko ya ntoma oyo, mpe tobatisamaki.

73 Kala mingi te na bobimi na biso uta na mai nsima ete tobatisama, tozwaki mapamboli minene mpe ya nkembo uta na Tata na biso ya Lola. Moke nsima ete nabatisa Oliver Cowdery, ete Molimo Mosantu akitaki likolo na ye, mpe atelemaki mpe asakolaki makambo mingi maye kala mingi te esengelaki koleka. Mpe lisusu, sikasikawa lokola nabatisamaki na ye, nazwaki lisusu molimo ya masakoli, wana, etelemaki ngai, nasakolaki mpo na oyo etali ebandeli ya Eklezia, mpe makambo mingi mosusu matali Eklezia, mpe nkola oyo ya bana ya bato. Totondisamaki na Molimo Mosantu, mpe tosepelaki mingi na Nzambe ya lobiko na biso.

74 Sikawa mpo ete mayele na biso mazwaki bososoli, tobandaki komona makomi kofungwama na bososoli na biso, mpe ndimbola ya solo mpe ntina ya matangi ya mibombamo mingi ebimisamaki epayi na biso na lolenge oyo tokokaki soki moke te kokokisa liboso, na lolenge tokanisaki liboso te. Na ntango se moko wana tosengelaki kobomba sekele ya makambo tozwaki Bonganganzambe mpe libatisi, mpo molimo ya monyokoli esilaki komonisama yango moko na nzinganzinga.

75 Mbala na mbala, bazalaki kokana kotombokela biso na ebele ya bato, mpe oyo, lisusu, na bateyi ya biyamba. Mpe mwango na bango ya kotombokela biso ezalaki se kokangisama na ezalela ya tata ya libota ya mwasi na ngai (na nse ya ngolu ya Nzambe), mpo bango oyo bakomaki mpenza baninga na ngai, mpe batelemelaki ebele ya batomboki, mpe balingaki ete napesama nzela ya kokoba mosala ya bobongoli nakozongaka kokata yango; mpe boye bapesaki mpe balakelaki biso libateli, na lolenge bakokaki, uta na bofundi bonso boye ezalaki te engebene na mibeko.

  • Oliver Cowdery alimboli makambo oyo boye: “Oyo ezalaki mikolo ya kobosana soki moke te—kofanda na nse ya lokito ya mongongo oyo etindami koloba na bofulami ya lola, elamusaki botondi bonene koleka ya ntolo oyo! Mokolo nsima na mokolo nakobaki, nakozanga kokata, kokoma uta na monoko na ye, mokolo to lisolo ya makomi oyo ebiangami ‘Buku ya Mormon’, lokola ezalaki ye kobongola na nzela ya Ulima mpe Tumima, to, lokola elingaki koloba Banefi, ‘Balimboli.’

    “Kotanga, kutu na maloba moke, lisolo ya kitoko oyo epesami na Mormon mpe mwana mobali na ye ya sembo, Moroni, lisolo ya bato oyo kala balingamaki mpe basungamaki na lola, elingaki koleka mwango na ngai ya sikawa; boye nazongisa kosala oyo nsima na eleko yoko ekoya, mpe, lokola nalobaki na boyingisi boye, nakoleka semba mingi na makambo mike oyo ekangami mpenza na ebandeli ya Eklezia oyo, oyo ekoki kosepelisa boko bankoto ya bato oyo bakima liboso, kati ya miso ya mpamela ya bato bakaniselaka baninga se mabe mpe makambo ya lokuta ya bakibisi, mpe bayambi Nsango malamu ya Klisto.

    “Moto moko te, oyo afandisi mayele mpo na kososola, akokaki kobongola mpe kokoma malakisi epesamaki na Banefi uta na monoko ya Mobikisi, ya lolenge ya sikisiki oyo bato basengeli kotonga Eklezia na ye, mpe mingi mingi ntango bosoto bopalinganisaki bozangi elikya likolo ya ebongiseli mpe masanga oyo esalemi na kati ya bato, na kozangaka koyoka mposa ya kozwa litomba ya kolakisa bolingi ya motema na kokundamaka na lilita ya mai, koyanola na libiangi mpo na ‘mayele ya motema moko malamu na bosekwi ya Yesu Klisto.’

    “Nsima ya kokoma lisolo ya mosala ya Mobikisi na montika ya nkona ya Yakobo, na ekolo oyo, ezalaki mpasi ya komona te, lokola profeta alobaki ete ekozala, ete molili mozipaki mabele mpe molili monene mozipaki mayele ya bato. Na kolukaka ntina ya mosika ezalaki mpasi te ya komona ete na kati ya kowela makasi mpe makelele oyo etali biyamba, moto moko te azalaki na likoki kowuta na Nzambe mpo na kosala makuli ya Nsango malamu. Mpo motuna oyo ekoki kotunama, bato oyo bawanganaka bimoniseli, ezali bango na likoki ya kosala na nkombo ya Klisto, ntango litatoli na Ye ezali moke te koleka molimo ya masakoli, lokola mpe eyamba na ye efandi na moboko ya etongami, mpe esungami na bimoniseli ya semba, na bikeke nyonso ya mokili ntango Azalaki na bato likolo ya mabele? Soki bikela oyo ekundamaki, mpe na bokebi bibombamaki na bato oyo kani misala mabe milingaki kozala na likama soki kaka mipesamaki nzela ya kongenga na miso ya bato, bazalaki na biso lisusu te; mpe tolingaki se kozela ete motindo mopesama ‘Telema mpe batisama.’

    “Oyo ewumelaki ntango molai te liboso ete mposa oyo ekokisama. Nkolo, oyo atonda na boboto, mpe ntango nyonso na bolingi ya koyanola losambo ya molende ya bato na bomikitisi, nsima ete tobelela Ye na lolenge ya mpiko, mosika uta na bifandelo ya bato, akitaki mpo na komonisa epayi na biso bolingi na Ye. Na mpwasa, lokola se uta kati na boseko, mongongo ya Mosikoli mopesaki biso kimia, wana ezalaki elamba ya bozipi kofungwama mpe anjelu ya Nzambe kokita na nse alatisami na nkembo, mpe apesaki etinda oyo tozelaki mitema likolo likolo, mpe bafungola ya Nsango malamu ya boyamboli. Esengo nini oyo! Ekamwiseli nini oyo! Bosepeli nini boye! Wana ezalaki mokili konyokwama mpe kobulunganisama—wana ezalaki bankoto kosimba- simba lokola bakufi miso kosimbaka efelo, mpe wana ezalaki bato nyonso, ebele ya bato nyonso lokola moko, kotikala kati na bozangi elikya, miso na biso mamonaki, matoyi na biso mayokaki, lokola na bongengi ya moi ya mokolo; iyo, mingi—koleka bongengi ya miese ya moi ya Sanza ya mitano, oyo na ntango wana misopaki bongengi likolo ya etando ya mokili! Bongo mongongo na ye, ata kutu pete, motobolaki biso na kati, mpe maloba na ye, ‘Nazali moninga na bino mosali,’ malongalaki bobangi bonso. Toyokaki na bokebi, tomonaki, tokamwaki! Ezalaki mongongo ya anjelu uta na nkembo, ezalaki etinda uta na oyo Aleki Likolo! Mpe lokola toyokaki tosepelaki, wana epelaki bolingo na Ye likolo ya milimo na biso, mpe tolingamaki kati na limoni ya Oyo ya Bokasi bonso! Esika ya ntembe ezalaki wapi? Epayi moko te; bozangi elikya bolimwaki, ntembe ekufaki na mai mozindo mpo na kobima lisusu te, ntango lokuta mpe bokosi elimwaki libela!

    “Kasi, ndeko mobali mondimi, kanisa, kanisa lisusu mwa moke, bosepeli boni etondisaki mitema na biso, mpe na bosutuki nini tosengelaki kogumbama, (mpo nani alingaki te kogumbama libolongo mpo na lipamboli ya ndenge wana?) ntango tozwaki Bonganganzambe Bosantu na nse ya loboko na ye lokola alobaki, ‘Likolo na bino baninga na ngai basali, na nkombo ya Masiya, napesi Bonganganzambe boye mpe likoki oyo, oyo ekotikala likolo ya mabele, ete bana mibali ya Lewi bakoka naino kobonza lisusu libonza epayi ya Nkolo kati na bosembo!’

    “Nakomeka te koyembela bino na langi mayoki ya motema oyo, mpe kitoko monene koleka mpe nkembo oyo ezingaki biso na libaku oyo te; kasi bokondimela ngai ntango nalobi, ete mabele, bato mpe te, na ntoki ya bososoli ya ekeke, bakoki kobanda kolatisa lokota na lolenge ya kitoko mpe ya kokamwa lokola moto mosantu oyo. Te; mabele oyo ezali mpe te na nguya ya kopesa bosepeli, ya kopesa kimia, to ya kososola bwania oyo ezalaki kati na esakola moko moko lokola epesamaki na nguya ya Molimo Mosantu! Moto akoki kokosa baninga na ye bato, kokosa ekoki kolanda kokosa, mpe bana ya bato ya nkuna bakoki kozala na nguya ya kosenginya bato ya liboma mpe baoyo bateyami naino te, kino eloko yoko te longola se makanisi maleisa mingi, mpe mbuma ya lokuta na mbonge na yango ememaka baoyo wana bakosami na lilita; kasi bobele kosimba moko na mosapi ya bolingo na ye, iyo, moese moko ya nkembo uta na mokili ya likolo, to liloba moko uta na monoko ya Mobikisi, uta ntolo ya boseko, ekokomisa nyonso oyo mpamba, mpe ekokombola yango libela uta na mayele. Boyebi ya solo ete tozalaki na miso ya anjelu, bozangi ntembe ete toyokaki mongongo na yesu, mpe bosolo oyo ezangi litono lokola ete bosolo esopanaki uta na moto ya peto, etindamaki na bolingi ya Nzambe, ekoki kolimbolama na ngai te, mpe na lolenge ya koloba oyo na kotalelaka se ntango nyonso bolamu boye ya Mobikisi na bokamwi mpe bozongisi matondi wana ekopesama ngai nzela ya kotikala na mabele; mpe na bifandelo wana wapi bobongi nie bozalaka mpe wapi lisumu eyaka soki moke te, natie elikya ya kogumbamela Ye na mokolo wana oyo ekosuka te.”—Messenger and Advocate, liboke 1 (Sanza ya zomi ya mobu 1834), nkasa 14–16.

Bimisa na lokasa