Masalisi mpo na Makomi
Mambi ma kala ya libota


Mambi ma kala ya libota

Nkoma oyo ezali kolanda monkoloto ya bana kati na libota. Epayi wapi misala ya bonganganzambe to boko mapamboli ezalaki bobele mpo na libota songolo, mambi ma kala ya libota kati na makomi ezalaki na tina monene (Gen. 5; 10; 25; 46; 1 Nta. 1–9; Ejela 2:61–62; Nehem. 7:63–64; Mat. 1:1–17; Luk. 3:23–38; 1 Nef. 3:1–4; 5:14–19; Jar. 1:1–2). Kati na Eklezia oyo ezongisami lelo, bandimi ya Eklezia bazali se kokoba kolanda minkoloto ya bato ya mabota na bango, ndambo moko mpo na koyeba malamu bankoko na bango mpo ete bakoka kosala makuli ya lobiko mpo na bankoko na bango. Makuli oyo ezali na litomba mpo na bato bakufa baoyo bandimi nsango malamu ya Yesu Klisto kati na mokili ya molimo (Mal&May 127–128).

Bimisa na lokasa