Masalisi mpo na Makomi
Yona


Yona

Profeta ya Boyokani ya Kala oyo abiangamaki na Nkolo koteya boyamboli na engumba ya Ninewe (Yona 1:1–2).

Buku ya Yona

Buku moko ya Boyokani ya Kala oyo ezali kolobela oyo esalemaki na bomoi ya Yona. Yona ntango mosusu akomaki te ye moko buku yango. Likanisi monene ya buku ya Yona ezali ete Yova ayangelaka epayi nyonso mpe asukisaka bolingo na Ye na ekolo moko to na bato se moko te.

Na mokapo 1, Nkolo abiangi Yona koteya na Ninewe. Na esika ya kosala lokola etindaki Nkolo, Yona akimaki na masuwa mpe amelamaki na mbisi moko monene. Na mokapo 2, Yona asambelaki Nkolo, mpe mbisi esanzaki Yona na mabele ekawuka. Mokapo 3 ekomi ete Yona akendaki na Ninewe mpe asakolaki bokwei na yango. Nzokande, bato bayambolaki. Na mokapo 4, Nkolo apamelaki Yona mpo na kozalaka na nkanda mpo Nkolo abikisaka bato yango.

Yesu ateyaki ete bomelami ya Yona na mbisi ezalaki elilingi ya liwa mpe bosekwi ya Yesu ye moko (Mat. 12:39–40; 16:4; Luk. 11:29–30).

Bimisa na lokasa