Masalisi mpo na Makomi
Liyokani ya sika mpe ya libela


Liyokani ya sika mpe ya libela

Litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto (Mal&May 66:2). Ezali ya sika ntango nyonso ebimisami ya sika na kolandaka eleko ya bopengwi. Ezali ya libela na lolenge ete ezali liyokani ya Nzambe mpe esili kosepelisama na eleko moko moko ya nsango malamu wapi bato balingaki koyamba yango. Liyokani ya sika mpe ya libela ebimisamaki lisusu epayi ya bato na mabele na Yesu Klisto na nzela ya Profeta Joseph Smith. Ezali na makuli ya bule oyo masalemi na likoki ya bonganganzambe—ndakisa libatisi mpe libala na tempelo—oyo epesaka moto lobiko, bozangi bokufi, mpe bomoi ya seko. Ntango bato bandimaka nsango malamu mpe bapesaka elaka ya kobomba mitindo ya Nzambe, Nzambe asalaka boyokani na bango mpo na kopesa bango mapamboli ya liyokani na Ye ya sika mpe ya libela.

Bimisa na lokasa