Masalisi mpo na Makomi
Asulia


Asulia

Eyangeli ya kala oyo, elongo na mbanda na ye Babiloni, bakonzaki mingi ya bikolo ya kala ya Sulia mpe Filisitia na kati ya ntango koleka mingi ya Boyokani ya Kala. Ata kutu Basulia bazalaki ekolo moko ya nguya monene uta na katikati ya ekeke ya 12 Liboso na mbotama ya Klisto kino na ekeke ya 7 Liboso na mbotama ya Klisto, bakoki soki moke te kotonga lingomba ya politiki ya makasi. Bakonzaki na bonsomo, kolongaka banguna na bango na moto mpe mompanga kolembisaka bango na komemaka ndambo monene ya bato na bandambo mosusu ya eyangeli na bango. Bato bakonzamaki na bokonzi ya Asulia babundisaki eyangeli yango ntango nyonso. (Tala 2 Mik. 18–19; 2 Nta. 32; Yis. 7:17–20; 10; 19; 37.)

Bimisa na lokasa