Masalisi mpo na Makomi
Filemo, Mokanda na


Filemo, Mokanda na

Buku moko kati na Boyokani ya Sika, ezwamaki na mokanda oyo ekomamaki na Paulo. Mokanda ya Paulo epayi ya Filemo ezali mokanda na ye moko na ntina ya Onesimo, mowumbo oyo ayibaki nkolo na ye, Filemo, mpe akimaki na Loma. Paulo azongisaki ye nsima epayi ya nkolo na ye na Kolose elongo na Tukiko, momemi ya mokanda ya Paulo na Bakolose. Paulo asengaki ete Onesimo alimbisama mpe ayambama lokola moninga Moklisto. Paulo akomaki mokanda oyo wana ezalaki ye na boloko na Loma mpo na mbala ya yambo.

Bimisa na lokasa