Masalisi mpo na Makomi
Yosefe, Mobali ya Malia


Yosefe, Mobali ya Malia

Mobali ya Malia, mama ya Yesu. Yosefe azalaki eboto ya Dawidi (Mat. 1:1–16; Luk. 3:23–38) mpe azalaki kofanda na Nasalete. Abalanaki na Malia. Kala mingi te liboso ya libala, Malia ayambaki bobimeli ya anjelu Gabaliele, oyo ayebisaki ete Malia aponamaki kozala mama ya Mobikisi (Luk. 1:26–35). Yosefe lisusu azwaki emoniseli ya mbotama oyo uta na Nzambe (Mat. 1:20–25).

Malia azalaki bobele moboti ya Yesu na mabele mpo Nzambe Tata nde azalaki Tata ya Yesu. Kasi Bayuda bakanisaki ete Yosefe nde azalaki tata ya Yesu, mpe Yesu asalelaki ye se bongo (Luk. 2:48, 51). Ekebisamaki ye na bandoto uta na lola, Yosefe abatelaki bomoi ya mwana abotami sika Yesu na kokimaka na Ejipito (Mat. 2:13–14). Nsima ya kufa ya Elode, anjelu moko alakisaki Yosefe ete azongisa mwana Klisto na Yisalaele (Mat. 2:19–23).

Bimisa na lokasa