Masalisi mpo na Makomi
Baebele, Mokanda na


Baebele, Mokanda na

Buku moko ya Boyokani ya Sika. Paulo akomaki mokanda oyo na Bayuda bandimi ya Eklezia mpo na kondimisa bango ete biteni minene ya mobeko ya Mose esili kokokisama kati na Klisto mpe ete mobeko ya likolo koleka ya nsango malamu ya Klisto mosili kotiama na esika na yango. Ezongaki Paulo na Yelusaleme na nsuka ya etinda na ye ya misato (penepene na 60 ya Mobu ya Nkolo), amonaki ete Bayuda bandimi ya Eklezia mingi bazalaki se komipesa na mobeko ya Mose (Mis. 21:20). Oyo ezalaki na moke mibu zomi nsima ete likita ya Eklezia na Yelusaleme esila kokamata mokano ete boko makuli ya mobeko ya Mose mazalaki lisusu na ntina te mpo na lobiko ya Baklisto. Emonani ete, kala mingi te nsima ya wana Paulo akomelaki Baebele mpo na kolakisa bango na makomi na bango moko mpe na ntina oyo emonani polele mpo na nini basengeli lisusu te kosalela mobeko ya Mose.

Mikapo 1 mpe 2 milimboli ete Yesu azali monene koleka banjelu. Mikapo 3–7 ezali komeka Yesu na Mose mpe na mobeko ya Mose mpe mitatoli ete Azali monene koleka banso mibale. Ezali lisusu koteya ete Bonganganzambe ya Melikisedeki ezali monene koleka boye ya Alona. Mikapo 8–9 milimboli motindo kani makuli ya Mose malengelaki bato mpo na mosala ya Klisto mpe boni Klisto azali moyokanisi ya liyokani ya sika (Alma 37:38–45; Mal&May 84:21–24). Mokapo 10 ezali elendisi likolo ya kozala molende mpe sembo. Mokapo 11 ezali liteya likolo ya bondimi. Mokapo 12 epesi makebisi mpe nsako. Mokapo 13 motaleli lolenge ya lokumu ya libala mpe bonene ya botosi.

Bimisa na lokasa