Masalisi mpo na Makomi
Batesaloniki, Mikanda na


Batesaloniki, Mikanda na

Buku mibale kati na Boyokani ya Sika. Ezalaki na ebandeli mikanda oyo Paulo akomaki na Batesaloniki wana ezalaki ye na Kolinti na ntango ya mobembo na ye ya yambo na Poto nzinganzinga na 50 ya Mobu ya Nkolo. Mosala na ye na Tesaloniki molimbolami na Misala 17. Paulo alingaki kozanga na Tesaloniki kasi bakokaki te kosala bongo (1 Tes. 2:18). Boye atindaki Timote koyamba babongwami mpe koyela ye nsango ya lolenge kani bazalaki. Paulo akomaki mokanda ya yambo lokola mbano ya botondi na ye na bozongi ya Timote.

Tesaloniki ya yambo

Mikapo 1–2 ezali na losako ya Paulo mpe losambo na ye mpo na Basantu; mikapo 3–5 mipesi malakisi likolo ya bokoli na molimo, bolingo, bopeto, molende, mpe Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto.

Batesaloniki ya mibale

Mokapo 1 mozali na losambo mpo na Basantu. Mokapo 2 molobeli boyei ya bopengwi. Mokapo 3 mozali na losambo ya Paulo mpo na bolongi ya ntina ya nsango malamu.

Bimisa na lokasa