Masalisi mpo na Makomi
Bagalatia, Mokanda na


Bagalatia, Mokanda na

Buku moko kati na Boyokani ya Sika. Na ebandeli ezalaki mokanda oyo Apostolo Paulo akomelaki Basantu oyo bazalaki na kati ya Galatia. Moto ya likambo ya mokanda oyo ezali ete bonsomi ya solo ekoki kozwama bobele na kotiaka nsango malamu ya Yesu Klisto na misala. Soki Basantu bayambaki mateya ya Bayuda Baklisto oyo babetaki sete na kotosaka mobeko ya Mose, balingaki kotia ndelo to kobebisa bonsomi boye bazwaki na Klisto. Kati na mokanda Paulo alakisaki mosala na ye moko lokola Apostolo, alimbolaki malongi ya bosembo na nzela ya bondimi, mpe andimisi motuya ya eyamba ya molimo.

Na mikapo 1 mpe 2, Paulo ayebisaki bomimi na ye na nsango azwaki ya bopengwi na kati ya Bagalatia mpe amonisi polele mosala na ye na kati ya Bapostolo. Mikapo 3 mpe 4 milobeli malongi ya bondimi mpe ya misala. Mikapo 5 mpe 6 ezali na liteya na matomba ya kosalelaka malongi ya bondimi.

Bimisa na lokasa