Masalisi mpo na Makomi
Simeona


Simeona

Kati na Boyokani ya Kala, mwana mobali ya mibale ya Yakobo na mwasi na ye Lea (Gen. 29:33; 35:23; Esod. 1:2). Azwanaki na Lewi na bobomi ya Basekeme (Gen. 34:25–31). Lisakoli ya Yakobo mpo na oyo etali Simeona ezali na Genese 49:5–7.

Libota ya Simeona

Eboto ya Simeona ezalaki kofanda mbala mingi na libota ya Yuda mpe kati na bandelo ya bokonzi ya Yuda (Yos. 19:1–9; 1 Nta. 4:24–33). Libota ya Simeona esanganaki na Yuda na etumba na Bakanana (Bas. 1:3, 17). Bayaki nsima kosangana na mampinga ya Dawidi (1 Nta. 12:25).

Bimisa na lokasa