Masalisi mpo na Makomi
Elamani, Mwana mobali ya Elamani


Elamani, Mwana mobali ya Elamani

Profeta mpe mobombi masolo ya makomi kati na Buku ya Mormon oyo ateyaki bato ya Nefi. Azalaki mwana mobali nkoko ya Elenge Alma mpe tata ya Nefi oyo apesamaki nguya likolo ya biloko nyonso. Elongo na mwana mobali na ye Nefi, Elamani akomaki buku ya Elamani.

Buku ya Elamani

Mikapo 1–2 milimboli ntango moko ya mobulu monene ya politiki. Mikapo 3–4 mikomi ete Elamani mpe Moroniya, kapitene mokonzi ya mampinga ya Banefi, akokaki na nsuka kotia kimia mpo na ntango moko. Nzokande, atako bakambamaki na bato malamu baye, bato bakolaki mingi bato ya nkuna. Kati na mikapo 5:1–6:14 Nefi atikaki kiti ya bosambisi, lokola esalaki nkoko na ye Alma, mpo na koteya bato. Mpo na ntango moko bato bayambolaki. Kati na mikapo 6:15–12:26, nzokande, ekolo ya Banefi ekomaki nkuna. Mikapo ya nsuka, 13–16, ezali na lisolo ya kitoko ya profeta moko na nkombo ya Samwele Molamani oyo asakolaki liboso mbotama mpe Bobakami ya Mobikisi na ekulusu mpe bilembo oyo bisengelaki kolakisa makambo oyo wana.

Bimisa na lokasa