Masalisi mpo na Makomi
Bobongwami, Mobongwami


Bobongwami, Mobongwami

Kobongwanaka boyambi, motema, mpe bomoi ya moto moko mpo na kondima mpe koyokana na bolingi ya Nzambe (Mis. 3:19).

Kati na bobongwami ezali na mokano ya bolingi mpo na kotika banzela ya kala mpe mokano ya kobongwana mpo na kokoma moyekoli ya Klisto. Boyamboli, libatisi mpo na bolimbisi ya masumu, boyambi ya Molimo Mosantu na botie ya maboko, mpe bondimi na bokobi na Nkolo Yesu Klisto esalaka bobongwami ya kokoka nie. Moto ya mokili akobongwana na moto ya sika, oyo asantisami mpe azali peto, abotami lisusu na Klisto Yesu (2 Kol. 5:17; Mos. 3:19).

Bimisa na lokasa