Masalisi mpo na Makomi
Sinagoga


Sinagoga

Esika ya bokutani mpo na ntina ya eyamba. Kati na Boyokani ya Sika, biloko ya ndako lokola kiti, mesa ya koteyela esalemi na lolenge ya pete, mpe ezalaki na sanduku oyo ezwamaki na mikanda elingami a mobeko mpe makomi mosusu ya bule, mesa ya kotanga, mpe bakiti mpo na bato bayaka kogumbamela.

Lisanga ya bampaka ya mboka ezalaki koyangela sinagoga moko moko. Bazalaki kokamata mokano soki nani asengeli kokota to kotangolama (Yoan. 9:22; 12:42). Mosali monene koleka azalaki mokonzi ya sinagoga (Mal. 5:22; Luk. 13:14). Azalaki mingi koleka mokomeli, azalaki kobatela ndako, mpe kokamba misala. Mosali moko azalaki kosala misala ya eyamba (Luk. 4:20).

Ezalaki na sinagoga moko na engumba moko moko wapi Bayuda bazalaki kofanda, ezala na Palesitina to epayi mosusu. Oyo ezalaki lisalisi monene na kotalaka kopanza nsango malamu ya Yesu Klisto mpo bamisionele ya ebandeli ya Eklezia bakokaki ntango nyonso koloba kati na sinagoga (Mis. 13:5, 14; 14:1; 17:1, 10; 18:4). Esaleli oyo ezalaki se moko na kati ya bamisionele kati na Buku ya Mormon (Alma 16:13; 21:4–5; 32:1) mpe na ntei ya bamisionele ya yambo kati na eleko oyo (Mal&May 66:7; 68:1).

Bimisa na lokasa