Masalisi mpo na Makomi
Abalayama


Abalayama

Mwana mobali ya Tela, abotamaki na Ulu ya Bakaladi (Gen. 11:26, 31; 17:5). Profeta ya Nkolo na oyo kani Nkolo asalaki mayokani ya seko, na nzela ya oyo bikolo nyonso ya mabele bipambolami. Abalayama abiangamaki na ebandeli Abalama.

Buku ya Abalayama

Ezali masolo ya makomi ya kala ekomama na Abalayama oyo ezwamaki na Eklezia na mobu 1835. Masolo ya makomi yango mpe boko bibembe babongisa izwamaki kati na bankunda ya nse ya Ejipito na Antonio Lebolo, oyo alingaki kotika yango na Michael Chandler. Chandler alakisaki mango polele na Etazini ya Amerika na mobu 1835. Boko baninga ya Joseph Smith basombaki yango uta na Chandler mpe apesaki yango na Profeta, oyo abongolaki yango. Ndambo ya masolo ya makomi oyo ezwami kati na Liyaka ya Ntalo Monene.

Mokapo 1 ezali kokundoli makambo oyo Abalayama akutanaki na yango na Ulu ya Bakaladi, wapi banganganzambe ya nkunda bamekaki kotumba ye na mbeka. Mokapo 2 ezali kolobela mobembo na ye na Kanana. Nkolo amonanaki epayi na ye mpe asalaki mayokani na ye. Mokapo 3 ezali kokundola ete Abalayama amonaki molongo mpe ayebaki kososola mikangano kati na biloko ya lola. Mikapo 4–5 ezali lisolo mosusu ya Bokeli.

Nkona ya Abalayama

Ezali bato oyo, na botosi na bango ya mibeko mpe makuli ya nsango malamu ya Yesu Klisto, bazwi bilaka mpe mayokani oyo Nzambe asalaki na Abalayama. Mibali mpe basi bakoki kozwa mapamboli oyo soki bazali bana ya libota ya Abalayama na makila to soki bakomisami bana ya libota na ye na koyambaka nsango malamu mpe na kobatisamaka (Gal. 3:26–29; 4:1–7; Mal&May 84:33–34; 103:17; 132:30–32; Abal. 2:9–11). Biboto ya Abalayama na makila bakoki kobungisa mapamboli na bango na kozangaka botosi (Lom. 4:13; 9:6–8).

Bimisa na lokasa