Masalisi mpo na Makomi
Pole, Pole ya Klisto


Pole, Pole ya Klisto

Makasi, nguya, to bobendami ya bonzambe uta na Nzambe na nzela ya Klisto mpe epesaka bomoi mpe pole na biloko nyonso. Ezali mobeko na nzela ya oyo wapi biloko nyonso eyangelami na lola mpe na mabele (Mal&May 88:6–13). Esalisaka lisusu bato kososola bosolo ya nsango malamu mpe kosalisa bango kotambola na nzela nsango malamu oyo ekambaka na lobiko (Yoan. 3:19–21; 12:46; Alma 26:15; 32:35; Mal&May 93:28–29, 31–32, 40, 42).

Pole ya Klisto ekoki te kobulunganisama na Molimo Mosantu. Pole ya Klisto ezali moto te. Ezali bobele bobendami boye eutaka na Nzambe mpe elengelaka moto mpo na kozwa Molimo Mosantu. Ezali bobendami mpo na bolamu kati na bomoi ya bato nyonso (Yoan. 1:9; Mal&May 84:46–47).

Mamonisi moko ya pole ya Klisto ezali mayele ya motema, oyo esalisaka moto kopona kati na oyo ezali alima mpe mabe (Mor. 7:16). Wana ezali bato koyekola mingi na ntina ya nsango malamu, mayele ya mitema na bango ezali kolamuka mpe koyoka (Mor. 7:12–19). Bato oyo batiaka bokebi na pole ya Klisto bakambami na nsango malamu ya Yesu Klisto (Mal&May 84:46–48).

Bimisa na lokasa