Masalisi mpo na Makomi
Bolakeli mabe, Kolakela mabe


Bolakeli mabe, Kolakela mabe

Kati na makomi, bolakeli mabe ezali kotia na mosala mobeko ya Nzambe oyo epesaka nzela to momemaka masambisi mpe malandi ya mwango likolo ya eloko, moto, to bato mingi koleka mpo na bozangi bosembo. Bolakeli mabe ezali bomonisi ya bolingo mpe boyengebene ya bonzambe ya Nzambe. Ekoki kolakelama na Nzambe ye moko soki te kobimisama na basali na Ye baoyo bazali na likoki. Mbala mingi ntina mpenza ya bolakeli mabe eyebani bobele na Nzambe. mpo na kobakisa, ezali bato oyo baboyaka kotosa Nzambe na motema moko nde bayebi kozala kati na bolakeli mabe mpe na bongo bamibendani uta na Molimo ya Nkolo.

Nkolo akoki kolongola mabe mpo na bondimi ya moto moko to ya bato na Yesu Klisto mpe botosi na mibeko mpe na makuli ya nsango malamu (Alma 23:16–18; 3 Nef. 2:14–16; Bit. Bond. 1:3).

Bosantoli

Kolakela mabe ezali lisusu kosalela elobeli oyo ezali ya esantoli, ya botuki, soki te ya bozangi limemia.

Bimisa na lokasa