Masalisi mpo na Makomi
Lewitiko


Lewitiko

Buku moko ya Boyokani ya Kala oyo eyebisaka misala ya bonganganzambe na Yisalaele. Ezali kobeta sete na bosantu ya Nzambe mpe liboke ya mibeko oyo bato na Ye basengeli kotalela mpo na kokoma santu. Ntina na yango ezali koteya misise ya boyebi kati na bolamu na mabe mpe bosolo ya eyamba ya mobeko ya Mose na nzela ya ndulu. Mose akomaki buku ya Lewitiko.

Mikapo 1–7 milimboli makuli ya bopesi libonza. Mikapo 8–10 milimboli ndulu oyo esengeli kotosama na kobulisaka banganganzambe. Mokapo 11 molimboli nini ekoki koliama to koliama te mpe nini ezali peto to mbindo. Mokapo 12 molobeli basi nsima ya mbotama ya mwana. Mikapo 13–15 ezali mibeko mitali milulu ya bozali mbindo. Mokapo 16 mozali na ndulu oyo esengeli kolanda na Mokolo ya Bomikabi. Mikapo 17–26 ezali na liboke ya mibeko oyo etali mimesano ya eyamba mpe lingomba ya bato nyonso. Mokapo 27 molimboli ete Nkolo atindaki Bayisalaele kobulisa mbuma, bitonga, mpe bibwele na bango epayi ya Nkolo.

Bimisa na lokasa