Masalisi mpo na Makomi
Makila


Makila

Bayisalaele ya kala mpe bonkoko ya bato na mikolo ya lelo bazali kotala yango lokola efandeli ya bomoi to bokasi bonene koleka ya mosuni nyonso. Na ntango ya Boyokani ya Kala Nkolo apekisaki Yisalaele kolia makila lokola bilei (Lew. 3:17; 7:26–27; 17:10–14).

Nguya ya bomikabi ya mbeka ezalaki kati na makila mpo bazalaki kotala makila lokola kaka ezalaki na motuya monene mpo na bomoi. Mbeka ya nyama kati na Boyokani ya Kala ezalaki elembo ya mbeka monene oyo Yesu Klisto apesaki nsima (Lew. 17:11; Mose 5:5–7). Makila ya bomikabi ya Yesu Klisto masukolaka moyamboli uta na lisumu (1 Yoan. 1:7).

Bimisa na lokasa