Masalisi mpo na Makomi
Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto


Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto

Na ebandeli ya Eleko ya Nkoto ya mibu, Klisto akozonga na mabele. Likambo oyo ekotia elembo ya nsuka bomeki ya kufa ya mabele oyo. Bato ya nkuna bakolongolama uta na mabele mpe basembo bakokamatama na likolo na lipata wana ezali mabele kopetolama. Ntango moto moko te ayebi mpenza ntango nini Klisto akoya mbala ya mibale, Ye apesaki biso bilembo ya kotalela mpo oyo bilakisi ete ntango ezali kobeleme (Mat. 24; JS—Mat. 1).

Bimisa na lokasa