Masalisi mpo na Makomi
Siona


Siona

Bato ya peto na motema (Mal&May 97:21). Siona elingi lisusu koloba esika bapeto na motema bazali kofanda. Engumba oyo etongamaki na Enoka mpe bato na ye, mpe oyo na nsuka ekamatanaki na lola mpe ebiangamaki Siona mpo na bosembo (Mal&May 38:4; Mose 7:18–21, 69). Na mikolo ya nsuka engumba moko na nkombo ya Siona ekotongama penepene na Etuka ya Jackson, Missouri (Etazini ya Amerika), na oyo mabota ya Yisalaele makosangana (Mal&May 103:11–22; 133:18). Basantu bapesami toli ya kotonga Siona epayi nyonso wapi bazali kofanda na mokili.

Bimisa na lokasa