Masalisi mpo na Makomi
Enoka


Enoka

Profeta moko oyo akambaki bato ya engumba ya Siona. Mosala na ye molobelami na nyonso mibale Boyokani ya Kala mpe Liyaka ya Ntalo Monene. Azalaki nkoko ya sambo nsima ya Adama. Azalaki mwana mobali ya Yelede mpe tata ya Metusela (Gen. 5:18–24; Luk. 3:37).

Enoka azalaki moto monene mpe asalaki mosala ya ntina koleka lisolo ya mokuse oyo Biblia etangeli ye. Biblia ekomi ete abongwanaki (Ebe. 11:5) kasi epesi bolayi ya mosala na ye te. Yude 1:14 ezali na litangi ya lisakoli asalaki. Bimoniseli ya mikolo ya nsuka elimboli mingi na ntina ya Enoka, mingi mingi na ntina ya mateya na ye, na ntina ya engumba na ye oyo ebiangemaki Siona, na ntina ya mamoni na ye, mpe masakoli na ye (Mal&May 107:48–57; Mose 6–7). Siona ekamatanaki na lola mpo na bosembo ya baye bazalaki kati na yango (Mose 7:69).

Bimisa na lokasa