Masalisi mpo na Makomi
Galilea


Galilea

Na ntango ya kala mpe ya sika, etuka ya nordi koleka ya Yisalaele ya westi ya Ebale ya Yaladene mpe Mbu ya Galilea. Galilea ezali penepene ya bakilometele ntuku libwa na nsambo na molai mpe bakilometele ntuku minei na mwambe na monene. Kala ezalaki na ndambo ya mabele malamu mpe bingumba minene koleka ya Yisalaele. Nzela enene komemaka na Damaseke, Ejipito, mpe ngambo ya esti ya Yisalaele ezalaki koleka na nzela ya Galilea. Ezalela malamu koleka ya ntango mpe bileko mpe mabele malamu ebimisaki beboo mbuma ya bilaya, loso, mpe mbuma ya vinyo. Bolobi mbisi na Mbu ya Galilea epesaki mombongo monene libanda mpe ezalaki liziba monene ya nkita. Mobikisi alekisaki mingi ya ntango na Ye na Galilea.

Mbu ya Galilea

Mbu ya Galilea ezwami na nordi ya Yisalaele. Kati na Boyokani ya Kala ebiangamaki lisusu Mbu ya Kinelete mpe Mbu ya Genesaleta to Tibeliade kati na Boyokani ya Sika. Yesu ateyaki mateya ebele kuna (Mat. 13:2). Mbu ezali na lolenge ya mbuma ya mbumalombo, bakilometele 20 na molai mpe bakilometele 12 na monene na esika na yango ya monene koluta. Elali bakilometele 207 na nse ya ndelo ya mbu, yango nde ekomisaka mopepe ya nzinganzinga kozala mbala mingi molunge mpenza. Mopepe ya mpio kokitaka uta na ngomba mpe kokutanaka na mopepe ya molunge likolo ya mai ebimisaka mbala mingi bikumbaki ya mbalakata (Luk. 8:22–24).

Bimisa na lokasa