Masalisi mpo na Makomi
Ejekiele


Ejekiele

Profeta oyo akomaki buku ya Ejekiele kati na Boyokani ya Kala. Azalaki nganganzambe ya libota ya Zadoki mpe moko ya bakangemi ya Bayuda baye bamemaki na Nebukadanesala. Afandaki elongo na Bayuda na mboka bapaya na Babiloni mpe asakolaki na bowumeli ya eleko moko ya mibu ntuku mibale na mibale uta na mobu 592 kino mobu 750 Liboso na mbotama ya Klisto.

Buku ya Ejekiele

Buku ya Ejekiele ekoki kokabwana na biteni minei. Mikapo 1–3 eyebisi na ntina ya limoni ya Nzambe mpe bobiangi ya Ejekiele mpo na kosalela; mikapo 4–24 milobeli masambisi likolo ya Yelusaleme mpe mpo na nini epesamaki; mikapo 25–32 misakoli masambisi likolo ya bikolo; mpe mikapo 33–48 mikomi mamoni ya mikolo ya nsuka ya Yisalaele.

Bimisa na lokasa