Masalisi mpo na Makomi
Nehemia


Nehemia

Moyisalaele moto ya lokumu na Babiloni kati na Boyokani ya Kala (soki Molewi te moto ya libota ya Yuda) oyo azalaki na lotomo ya momemi kopo na ndako ya Aletahesaseta, uta na nani azwaki etinda ya bakonzi kopesaka ye nzela ya kokende kotonga lisusu bifelo na Yelusaleme.

Buku ya Nehemia

Buku oyo ezali bokobi ya buku ya Ejela. Ezali na lisolo ya botamboli mpe kokoso ya mosala na Yelusaleme kolandaka bozongi ya Bayuda uta na bokangemi ya Babiloni. Mikapo 1–7 ezali kolobela boyei ya yambo ya Nehemia na Yelusaleme mpe botongi lisusu ya bifelo ya engumba atako batelemelaki makasi mosala yango. Mikapo 8–10 milimboli mabongisi oyo Nehemia azalaki kosala kati na biyamba mpe mangomba ya bato. Mikapo 11–13 ezali kopesa mokanda ya bankombo ya baoyo balongobanaki mpe epesi lisolo ya bobulisi ya efelo. Milongo ya kotanga 4–31 ya mokapo 13 mikundoli boyei ya mibale na Nehemia na Yelusaleme nsima ya kozalaka mosika mibu zomi na mibale.

Bimisa na lokasa