Masalisi mpo na Makomi
Mituya


Mituya

Buku ya minei kati na Boyokani ya Kala. Mose akomaki buku ya Mituya. Buku ya Mituya ezali kopesa lisolo ya mobembo ya Yisalaele uta na Ngomba Sinai na bisobe ya Moaba na ndelo ya Kanana. Moko ya mateya monene oyo eteyaka ezali ete bato ya Nzambe basengeli kotambola na bondimi, kotalelaka bilaka na Ye, soki balingi kokoba kozwa elonga. Ezali koyebisa etumbu ya Nzambe epayi ya Yisalaele mpo na kozanga botosi mpe epesi boyebi na ntina ya mibeko ya Yisalaele. Nkombo ya buku ewuti na kosalelaka mituya koleka mpo na kotanga bato (Mit. 1–2; 26).

Mikapo 1–10 ezali koyebisa bolengeli ya Yisalaele mpo na kokende uta na Sinai. Mikapo 11–14 ezali kolimbola botamboli yango, botindi ya banongi na Kanana, mpe koboya ya Yisalaele mpo na kokota na mboka elakelama. Mikapo 15–19 mikundoli mibeko ya ndenge na ndenge mpe makambo ya mokolo. Mikapo 20–36 ezali na mambi ya kala ya mobu ya nsuka ya bato yango kati na esobe.

Bimisa na lokasa