Masalisi mpo na Makomi
Lehi, Tata ya Nefi


Lehi, Tata ya Nefi

Kati na Buku ya Mormon, profeta moko ya Baebele oyo akambaki libota na ye mpe balandi na ye uta Yelusaleme na mboka elakelama na ndelo ya westi ya mokili penepene na mibu 600 Liboso na mbotama ya Klisto. Lehi azalaki profeta ya yambo na kati ya bato na ye kati na Buku ya Mormon.

Lehi akimaka Yelusaleme na libota na ye na etinda ya Nkolo (1 Nef. 2:1–4). Azalaki na eboto ya Yosefe, oyo atekamaki na Ejipito (1 Nef. 5:14). Nkolo apesaki ye limoni ya nzete ya bomoi (1 Nef. 8:2–35). Lehi mpe bana mibali na ye batongaki masuwa mpe bananaki epayi na ndelo ya nordi (1 Nef. 17–18). Ye mpe eboto na ye bamitiaki na mabele ya sika (1 Nef. 18:23–25). Liboso ete akufa, Lehi apambolaki bana mibali na ye mpe ateyaki bango na ntina ya Klisto mpe bobimi ya Buku ya Mormon na mikolo ya nsuka (2 Nef. 1:1–4:12).

Buku ya Lehi

Joseph Smith abandaki na buku ya Lehi ntango azalaki kobongola Buku ya Mormon. Ezalaki lisolo ya makomi oyo Mormon akomisaki mokuse uta na bapalaki ya Lehi. Ezwaki ye nkasa 116 ya makomi na maboko oyo abongolaki uta na buku oyo, Joseph apesaki makomi na maboko mango na Martin Harris, oyo na ya ntango moke asalelaki Joseph lokola mokomeli kati na bobongoli ya Buku ya Mormon. Bongo nkasa yango ebungaki. Joseph azongaki te kobongola buku ya Lehi mpo na kotia yango na esika ya makomi na maboko oyo ebungaki kasi abongolaki nzokande masolo masusu uta na bapalaki ya wolo (tala boyingisi na Mal&May 3; 10). Masolo oyo mosusu ezali sikawa buku ya motoba ya yambo ya Buku ya Mormon.

Bimisa na lokasa