Masalisi mpo na Makomi
Tempelo, Ndako ya Nkolo


Tempelo, Ndako ya Nkolo

Elingi kolimbola ndako ya Nkolo. Nkolo atindaki ntango nyonso bato na Ye kotonga batempelo, bandako esantu kati na oyo wapi Basantu balongobani basalaka milulu mpe makuli ya bule ya nsango malamu mpo na bango moko mpe mpo na bakufi. Nkolo ayaka kotala batempelo naYe, mpe ezali bisika ya santu koleka nyonso mpo na kokumbamela.

Tabelenakele oyo etiamaki na Mose mpe bana ya Yisalaele ezalaki tempelo ya komema na maboko. Bayisalaele basalelaki yango na ntango ya bobimi na bango uta na Ejipito.

Tempelo oyo eyebani malamu koleka mpe etangami kati na Boyokani ya kala ezali oyo etongamaki na Solomo na Yelusaleme (2 Nta. 2–5). Ebebisamaki na mobu 587 Liboso na mbotama ya Klisto na Bababiloni mpe ezongisamaki na Zelubabele penepene na mibu ntuku sambo nsima na wana (Ejela 1–6). Ndambo ya tempelo oyo ezikisamaki na mobu 37 Liboso na mbotama ya Klisto, mpe Elode Monene atongaki lisusu yango nsima. Baloma babebisaki yango na 70 ya Mobu ya Nkolo.

Kati na Buku ya Mormon, balandi ya sembo ya Nzambe bakambamaki kotonga mpe kogumbamela kati na tempelo (2 Nef. 5:16; Mos. 1:18; 3 Nef. 11:1). Kotonga mpe kosalela tempelo na lolenge ya malamu ezali bilembo ya bosolo ya Eklezia na eleko nyonso, kotangaka mpe Eklezia oyo ezongisami na mikolo na biso. Tempelo ya Kirtland ezalaki tempelo ya yambo oyo etongamaki mpe ebulisamaki na Nkolo na eleko oyo. Uta ntango wana tempelo esili kobulisama na bamboka mingi na ntaka ya mabele.

Bimisa na lokasa