Masalisi mpo na Makomi
Mana


Mana

Mwa bilei ya moke, lokola mbuma na elengi ya mikate na mafuta ya nzoi (Esod. 16:14–31) to ya mafuta matumbami (Mit. 11:7–8). Nkolo apesaki yango mpo na koleisa bana ya Yisalaele na bowumeli na bango mibu ntuku minei kati na esobe (Esod. 16:4–5, 14–30, 35; Yos. 5:12; 1 Nef. 17:28).

Bana ya Yisalaele babengaki yango mana (to man-hu na lokota ya Ebele)—oyo elingi koloba “Ezali Nini?”—mpo bayebaki te nini yango ezalaki (Esod. 16:15). Ebiangamaki lisusu “bilei ya banjelu” mpe “lipa uta na lola” (Nze. 78:24–25; Yoan. 6:31). Ezalaki elembo mpo na Klisto, oyo akozala Lipa ya bomoi (Yoan. 6:31–35).

Bimisa na lokasa