Masalisi mpo na Makomi
Dani


Dani

Kati na Boyokani ya Kala, mwana mobali ya Yakobo mpe Biliha, elenge mwasi mosali ya Laele (Gen. 30:5–6).

Libota ya Dani

Mpo na mapamboli ya Yakobo likolo ya Dani, tala Genese 49:16–18. mpo na mapamboli ya Mose likolo ya libota ya Dani, tala Dutelonome 33:22. Nsima ya kofanda na Kanana, libota ya Dani ezwaki eteni ya mabele ya moke koleka kasi oyo ezalaki kobimisa mbuma mingi mpenza. (Yos. 19:40–48). Bamonaki mpasi mingi mpo na kobatela yango na Baamola (Bas. 1:34) mpe na Bafilisitia (Bas. 13:2, 25; 18:1). Na engebene, Badani bakendaki na ngambo ya nordi ya Filisitia (Bas. 18), nzinganzinga na Laisi, mpe bapesaki lisusu engumba wana nkombo ya Dani. Mboka monene oyo eyebani malamu lokola ndelo ya nordi ya Filisitia, oyo etandamaki “uta Dani kutu kino na Bele-seba.”

Bimisa na lokasa