Masalisi mpo na Makomi
Bala


Bala

Nzambe moko ya moi mobali oyo bakumbamelaki mingi mingi na Fenisia (1 Mik. 16:31) kasi lisusu akumbamelaki na banzela ekeseni mpe bisika ya ndenge na ndenge: na bato ya Moaba lokola Bala-Peolo (Mit. 25:1–3), na Sekeme lokola Bala-belite (Bas. 8:33; 9:4), na Ekelone lokola Bala zebuba (2 Mik. 1:2). Bala akoki kozala se moko wana lokola Bele ya Babiloni mpe Zewusi ya Gelese. Liloba Bala elimboli mokangano kati kati na nkolo mpe mowumbo na ye. Elembo eyebanaki ya Bala ezalaki ngombe ya mobali. Asitoleti azalaki nzambe ya mwasi oyo bakumbamelaki mingi elongo na Bala.

Bala ezalaki ntango esusu ya kosangisama na nkombo to liloba lisusu mpo na kolakisa boyokani na Bala, lokola esika wapi bakumbamelaki ye to moto oyo azali na bizalela lokola bina ya Bala. Nsima, mpo ete Bala ezwaki ndimbola ya mabe mpenza, liloba Boseti ekitanaki na ya nkombo oyo ya kosangisama. Boseti elingi koloba “nsoni.”

Bimisa na lokasa