Masalisi mpo na Makomi
Alma, Mwana mobali ya Alma


Alma, Mwana mobali ya Alma

Kati na Buku ya Mormon, mosambisi mokonzi ya yambo mpe profeta na ekolo ya Banefi. Na mibu na ye ya ebandeli alukaki kobebisa Eklezia (Mosiya 27:8–10). Nzokande, anjelu moko amonanaki epayi na ye mpe abongwamaki na nsango malamu (Mos. 27:8–24; Alma 36:6–27). Nsima atikaki mosala na ye lokola mosambisi mokonzi mpo ete ateya bato (Alma 4:11–20).

Buku ya Alma

Buku ekabwani kati na Buku ya Mormon, ezali na masolo ya makomi matiami na bokuse ya baprofeta Alma, mwana mobali ya Alma, mpe mwana mobali na ye Elamani. Makambo malimbolami kati na buku masalemaki penepene na mibu 91 na 52 Liboso na mbotama ya Klisto. Buku yango ezali na mikapo 63. Mikapo 1–4 milimboli botomboki ya balandi ya Newolo mpe Amalisi na Banefi. Bitumba elandaki ezalaki na kati ya makasi koleka kino na ntango wana kati na mambi ya kala ya Banefi. Mikapo 5–16 ezali na lisolo ya mibembo ya ebandeli ya mosala ya misionele ya Alma, na bosakoli na ye na ntina ya Mobateli Malamu (Alma 5) mpe mateya na ye elongo na Amuleki na engumba ya Amoniya. Mikapo 17–27 ezali na lisolo ya makomi ya bana mibali ya Mosiya mpe mosala na bango na kati ya Balamani. Mikapo 28–44 ezali na boko masakoli ya minene koleka nyonso ya Alma. Kati na mokapo 32 Alma azali komeka liloba na nkona; kati na mokapo 36 azali kolobela lisolo ya bobongwami na ye epayi ya mwana na ye Elamani. Mikapo 39–42 mikundoli toli ya Alma na mwana mobali na ye Koliantoni, oyo azwamaki kati na bobuki mobeko ya mansoni; esakoli monene oyo elimboli boyengebene, boboto, Bosekwi, mpe Bomikabi. Mikapo 45–63 milimboli bitumba ya Banefi na eleko wana mpe bokei na bango na mboka bapaya na nse ya Agoti. Bakambi banene ya lolenge oyo lokola Kapitene Moroni, Teakumi, mpe Lehi basungaki mpo na kobatela Banefi na nzela ya misala na bango ya mpiko mpe oyo esalemaki na ntango elongobani.

Bimisa na lokasa