Masalisi mpo na Makomi
Amosa


Amosa

Profeta moko ya Boyokani ya Kala oyo asakolaki uta penepene na mibu 720 kino na 740 Liboso na mbotama ya Klisto na mikolo ya Uziya, mokonzi ya Yuda, mpe Yelobama, mokonzi ya Yisalaele.

Buku ya Amosa

Ezali buku moko kati na Boyokani ya Kala. Mingi ya masakoli ya Amosa ekebisaki Yisalaele mpe bikolo ya mpembeni na ye kozongela bosembo.

Mikapo 1–5 ezali kobianga Yisalaele mpe bikolo ya mpembeni na ye na boyamboli. Mokapo 3 ezali kolimbola ete Nkolo abimisaka makambo na Ye ya nkuku na baprofeta mpe ete mpo na bobuki mibeko, Yisalaele ekobebisama na moyini. Mikapo 6–8 misakoli bokwei ya Yisalaele mibu mingi liboso ya bokamati mboka ya Basula. Mokapo 9 esakoli ete Yisalaele ekozongisama na mabele na ye moko.

Bimisa na lokasa