Masalisi mpo na Makomi
Botuki, Kotuka


Botuki, Kotuka

Kolobaka na kozanga limemia to lokumu na Nzambe to makambo ya bule.

Bafundaki Yesu mbala mingi na Bayuda ete Ye alobaki maloba ya botuki mpo ete Asakolaki kozala na makoki ya kolimbisa masumu (Mat. 9:2–3; Luk. 5:20–21), mpo ete Ye amibiangaki Ye moko Mwana ya Nzambe (Yoan. 10:22–36; 19:7), mpe mpo Ye alobaki ete bakomona Ye kofanda na loboko ya mobali ya nguya mpe koya na mapata na lola (Mat. 26:64–65). Makambo nyonso bafundaki Ye elingaki kozala solo soki Ye azalaki mpenza te oyo nani Ye alobaki azali. Makambo oyo bafundaki Ye na banzeneneke ya lokuta na esambelo liboso ya Boyangani (Mat. 26:59–61) ezalaki na botuki na tempelo ya Nzambe. Botuki na Molimo Mosantu, oyo ezali kowangana Klisto na motema moko nsima ya kozwa boyebi na Ye ya solo, ezali lisumu ezanga bolimbisi (Mat. 12:31–32; Mal. 3:28–29; Mal&May 132:27).

Bimisa na lokasa