Masalisi mpo na Makomi
Lota


Lota

Kati na Boyokani ya Kala, mwana mobali ya Alana mpe mwana ya ndeko ya Abalayama (Gen. 11:27, 31; Abal. 2:4). Alana akufaki mpo na nzala kati na Ulu (Abal. 2:1). Lota atikaki Ulu elongo na Abalayama mpe Salai mpe akendaki mobembo elongo na bango na Kanana (Gen. 12:4–5). Lota aponaki kofanda na Sodomo. Nkolo atindaki bantoma kokebisa Lota akima uta na Sodomo liboso ete Nkolo aya kobebisa yango mpo na nkuna ya bato (Gen. 13:8–13; 19:1, 13, 15); nzokande, mwasi ya Lota atalaki epayi na nsima wapi ezalaki ebebi mpe akomaki likonzi ya mongwa (Gen. 19:26). Boyokani ya Sika ezali na matangi matali Lota (Luk. 17:29; 2 Pet. 2:6–7). Bomoi na ye nsima ya bokabwani na ye na Abalayama elimbolami kati na Genese 13, 14, mpe 19.

Bimisa na lokasa