Masalisi mpo na Makomi
Tabelenakele


Tabelenakele

Ndako ya Nkolo, esika ya bosangani na losambo ya Bayisalaele na ntango ya Bobimi uta na Ejipito. Tabelenakele ezalaki mpenza tempelo ya komema na maboko mpe ekokaki kokatama ndambo ndambo mpe kosangisama lisusu. Bana ya Yisalaele basalelaki tabelenakele kino batongaki tempelo ya Solomo (Mal&May 124:38).

Nzambe abimisaki emekoleli na Mose (Esod. 26–27), mpe bana ya Yisalaele batongaki yango engebene na emekoleli wana (Esod. 35–40). Ntango tabelenakele esilaki, lipata ezipaki ema, mpe nkembo ya Nkolo etondisaki tabelenakele (Esod. 40:33–34). Lipata ezalaki elembo ya bozali ya Nzambe na esika wana. Na butu, ezalaki komonana lokola moto. Ntango lipata ezalaki kofanda likolo ya ema, bana ya Yisalaele basalaki nganda. Ntango ezalaki bango kokende, bakendaki na yango (Esod. 40:36–38; Mit. 9:17–18). Bana ya Yisalaele bazalaki komema tabelenakele elongo na bango na bowumeli ya botamboli na bango na esobe mpe na etumba ya boluki kokamata mabele ya Kanana. Nsima ya etumba yango, tabelenakele etiamaki na Silo, esika oyo Nkolo aponaki (Yos. 18:1). Etongaki bana ya Yisalaele tempelo ya Solomo, tabelenakele elimwaki mobimba uta na mambi ya kala.

Nkolo mpe Yisaya basalelaki tabelenakele lokola elilingi ya bingumba ya Siona mpe Yelusaleme na ntango ya Boyei ya Mibale ya Nkolo (Yis. 33:20; Mose 7:62).

Bimisa na lokasa