Masalisi mpo na Makomi
Danyele


Danyele

Moto monene ya buku ya Danyele kati na Boyokani ya Kala; profeta ya Nzambe mpe moto ya bondimi bonene.

Eloko moko eyebani te na ntina ya baboti na ye, atako amonani kozala ya eboto ya bakonzi (Dan. 1:3). Bakamataki ye mokangami na Babiloni, wapi azwaki nkombo ya Beletesasala (Dan. 1:6–7). Danyele mpe bakangemi basusu misato baboyaki bilei ya mokonzi mpo na ntina etali eyamba (Dan. 1:8–16).

Danyele alongaki kozwa lisungi ya Nebukadanesala mpe Dalio na nzela ya nguya na ye ya kolimbola bandoto (Dan. 2; 4; 6). Atangaki mpe alimbolaki lisusu nkoma na efelo (Dan. 5). Banguna na ye basalelaki ye ekokolo, mpe abwakamaki na libulu ya bankosi, kasi Nkolo abatelaki bomoi na ye (Dan. 6).

Buku ya Danyele

Buku yango ezali na biteni bibale: mikapo 1–6 ezali masolo na ntina ya Danyele mpe baninga na ye misato; mikapo 7–12 ezali mamoni ya bosakoli oyo Danyele amonaki. Buku yango ezali koteya bonene ya kozalaka ya kokangama na Nzambe mpe milimboli ete Nkolo apambolaka basembo.

Likabo monene ya buku oyo ezali ndimbola ya ndoto ya Mokonzi Nebukadanesala. Kati na ndoto yango, bokonzi ya Nzambe na mikolo ya nsuka elimbolami lokola libanga oyo likatami uta na ngomba. Libanga ekotambola kino litondisi mabele mobimba (Dan. 2; tala lisusu Mal&May 65:2).

Bimisa na lokasa