Masalisi mpo na Makomi
Izebele


Izebele

Mwasi moko ya nkuna kati na Boyokani ya Kala uta na mboka ya Fenisia. Azalaki mwasi ya Ahaba (1 Mik. 16:30–31), mokonzi moko ya Yisalaele oyo ayangelaki wana ezalaki Eliya profeta.

Libala ya Izebele na Ahaba, mingi koleka likambo nyonso mosusu, ekweisaki bokonzi ya Yisalaele ya nordi; Izebele akotisaki kati na Yisalaele ndenge ya mabe koleka ya kokumbamela banzambe ya bikeko uta na mboka na ye na esika ya kokumbamela Yehova (1 Mik. 18:13, 19).

Bimisa na lokasa