Masalisi mpo na Makomi
Ndai mpe liyokani ya bonganganzambe


Ndai mpe liyokani ya bonganganzambe

Ndai ezali bondimami boye elapani kozala solo mpe sembo na bilaka ya moko na moko. Liyokani ezali elaka ya lipombo kati na bato to mangomba ya bato mibale. Bonganganzambe ya Alona ezwami na liyokani mpamba. Bamemi ya Bonganganzambe ya Melikisedeki bazwaka bonganganzambe na ndai oyo elobami mpe lisusu na liyokani te. Ntango bato oyo bazali na bonganganzambe bazali sembo mpe bazali kokokisa mabiangi na bango lokola Nzambe atindi, Ye akopambola bango. Baoyo bazali sembo kino nsuka mpe bazali kosala nyonso Azali kosenga bango bakozwa nyonso oyo Tata azali na yango (Mal&May 84:33–39).

Bimisa na lokasa