Masalisi mpo na Makomi
Timote, Mikanda na


Timote, Mikanda na

Buku mibale kati na Boyokani ya Sika. Nyonso mibale ezalaki na ebandeli mikanda oyo Paulo akomaki na Timote.

Timote ya yambo

Paulo akomaki mokanda ya yambo nsima ya boloko na ye ya yambo. Atikaki Timote na Efese, mpe akanaki kozonga nsima (1 Tim. 3:14). Nzokande, Paulo amonaki ete akokaki kowumela, bongo akomaki na Timote, mbele uta na Makedonia (1 Tim. 1:3), mpo na kopesa ye toli mpe malendisi ya kokokisa mosala na ye.

Mokapo 1 ezali na mbote ya Paulo mpe lisusu malakisi na ye na ntina ya biloba-loba ya liboma oyo ezwaki esika kati na Eklezia. Mikapo 2–3 mipesi nzela ya kolanda makambo matali bokumbameli mpe oyo etali ezaleli mpe etamboli ya basali. Mikapo 4–5 ezali na ndimbola ya bopengwi ya mikolo ya nsuka mpe toli epayi ya Timote na lolenge asengeli kosala epayi ya baoyo azalaki kokamba. Mokapo 6 ezali bolendisi mpo na komonisama na bosembo mpe koboya bozwi ya mokili.

Timote ya mibale

Paulo akomaki mokanda ya mibale na ntango ya bokangemi na ye ya mibale, kala mingi te liboso ya liwa na ye ya martiru. Mokanda yango ezali na maloba ya nsuka ya Apostolo mpe ezali kolakisa bompikiliki ya kokamwa mpe botie motema boye wapi abundaki na liwa.

Mokapo 1 ezali na mbote ya Paulo mpe mokumba na Timote. Mikapo 2–3 ezali kopesa makebisi mpe nzela ya ndenge na ndenge ya kolanda, na kozangaka kobanga makama mazalaki koya liboso. Mokapo 4 ezali etinda na baninga ya Paulo, ezali na toli mpo na oyo etali lolenge ya kosala na bapengwi.

Bimisa na lokasa