Masalisi mpo na Makomi
Peto mpe mbindo


Peto mpe mbindo

Kati na Boyokani ya Kala, Nkolo abimisaki na Mose mpe na Bayisalaele ya kala ete bobele bilei songolo ezalaki peto to, na maloba mosusu, elongobani mpo na koliama. Bokeseni boye Bayisalaele batiaki kati na bilei ya peto mpe ya mbindo ezalaki na litomba monene na bomoi ya eyamba mpe ya bato na bango nyonso. Nyama, bandeke, mpe bambisi songolo etalelamaki lokola peto mpe indimamaki mpo na kolia, nzokande esusu ezalaki mbindo mpe epekisamaki (Lew. 11; Dut. 14:3–20). Bazalaki kotala bato mosusu na bokono lokola mbindo.

Na ndimbola ya molimo, kozala peto ezali kozanga lisumu mpe kozanga mposa ya masumu. Na ndimbola oyo liloba oyo esalelami mpo na kolimbola moto oyo azali malamu mpe azali na motema ya peto (Nze. 24:4). Bato ya liyokani ya Nzambe bazalaka na malakisi ya malamu koleka ya kozala ntango nyonso peto (3 Nef. 20:41; Mal&May 38:42; 133:5).

Bimisa na lokasa