Masalisi mpo na Makomi
Dawidi


Dawidi

Mokonzi moko ya Yisalaele ya kala kati na Boyokani ya Kala.

Dawidi azalaki mwana mobali ya Yisai ya libota ya Yuda. Azalaki elenge mobali ya mpiko oyo abomaki nkosi, ngombolo, mpe Mofilisitia monene Goliata (1 Sam. 17). Dawidi aponamaki mpe apakolamaki kozala mokonzi ya Yisalaele. Lokola Saulo, na bomoi na ye ya kimokolo azalaki elindo ya mabe monene, kasi, na bokeseni ya Saulo, akokaki kolakisa mawa ya solo. Boye akokaki kozwa bolimbisi, longola se na bobomi ya Uliya (Mal&May 132:39). Bomoi na ye bokoki kokabolana na biteni binei: (1) na Beteleme, wapi azalaki mobateli mpate (1 Sam. 16–17); (2) kati na ndako ya Mokonzi Saulo (1 Sam. 18:1–19:18); (3) lokola mokimeli (1 Sam. 19:18–31:13; 2 Sam. 1); (4) lokola mokonzi likolo ya Yuda na Hebeloni (2 Sam. 2–4), mpe nsima lokola mokonzi likolo ya Yisalaele nyonso (2 Sam. 5–24; 1 Mik. 1:1–2:11).

Lisumu ya Dawidi ya ekobo na Bata-Seba elandamaki na molongo ya makama oyo ebebisaki mibu ntuku mibale ya nsuka ya bomoi na ye. Ekolo lokola mobimba na yango efulukaki na ntango ya boyangeli na ye, kasi Dawidi ye moko anyokwamaki uta na malandi ya masumu na ye. Zuwa ezalaki ntango nyonso kati na libota, oyo, na kotalaka se likambo ya Abesaloma mpe Adoniza, esukisamaki na botomboki ya polele. Makama oyo ezali bokokisami ya oyo profeta Natana abimisaki likolo ya Dawidi mpo na lisumu na ye (2 Sam. 12:7–13).

Atako makama minene oyo, boyangeli ya Dawidi ezalaki ya bongengi koleka na mokolo ya Bayisalaele, mpo (1) asangisaki mabota na ekolo moko, (2) atiaki bokengi boye bolongolaki kowela mpo na bozwi ya ekolo, (3) afandisaki mbulamatari likolo ya eyamba ya solo ete bolingi ya Nzambe bozalaki mobeko ya Yisalaele. Mpo na ntina oyo, bato batalaki nsima boyangeli ya Dawidi lokola eleko ya wolo ya ekolo mpe lokola elilingi ya eleko ya nkembo koleka ntango Masiya akoya (Yis. 16:5; Yil. 23:5; Ejek. 37:24–28).

Bomoi ya Dawidi bolimboli mposa ya bato nyonso kotia molende kati na bosembo kino na nsuka. Lokola elenge, balobaki na ye ete azalaki moto ya “motema na ye moko” Nkolo (1 Sam. 13:14); lokola moto, alobaki na Molimo mpe azwaki bimoniseli mingi. Kasi afutaki ntako monene mpo na bozangi botosi na mitindo ya Nzambe (Mal&May 132:39).

Bimisa na lokasa