Masalisi mpo na Makomi
Boyokani ya Sika


Boyokani ya Sika

Bosangisi ya nkoma oyo efulami (na ebandeli na lokota ya Bamwela) na ntina ya bomoi mpe mosala ya Yesu Klisto, Bapostolo, mpe balandi basusu ya Yesu Klisto. Boyokani ya Sika bokabolami na banso na Bansango Malamu, Misala ya Bapostolo, Mikanda ya Paulo, mikanda misusu ya Bapostolo, mpe buku ya Emoniseli.

Bansango Malamu minei—buku ya Matai, Malako, Luka, mpe Yoane—ezali masolo ya bomoi ya Klisto. Buku ya Misala ekundoli mambi ya kala ya Eklezia mpe ya Bapostolo, malamu koleka mibembo ya misionele ya Paulo, nsima ya liwa ya Klisto. Mikanda ya Paulo ezali kopesa malakisi na bakambi mpe bandimi ya Eklezia. Mikanda misusu mikomamaki na Bapostolo basusu mpe ezali kopesa toli ya kobakisama na Basantu ya ebandeli. Buku ya Emoniseli, oyo ekomamaki na Apostolo Yoane, ezali mingi koleka na masakoli matali mikolo ya nsuka.

Bimisa na lokasa