Masalisi mpo na Makomi
Mosiya, Mwana mobali ya Benyamina


Mosiya, Mwana mobali ya Benyamina

Mokonzi ya sembo Monefi mpe profeta kati na Buku ya Mormon. Mosiya alandaki ndakisa ya sembo ya tata na ye (Mos. 6:4–7). Abongolaki bapalaki ya wolo ntuku mibale na minei oyo ezalaki na lisolo ya makomi ya Bayelede (Mos. 28:17).

Buku ya Mosiya

Buku moko kati na Buku ya Mormon. Mikapo 1–6 ezali na lisakoli litonda na bokasi ya Mokonzi Benyamina na bato na ye. Molimo ya Nkolo asimbaki mitema na bango mpe bato babongwanaki mpe bayokaki lisusu te mposa ya kosala mabe. Mikapo 7–8 ezali kolobela lingomba moko ya Banefi oyo bakendaki kofanda na kati ya Balamani. Batindaki liboke ya bato koluka bango. Amona, mokambi ya liboke ya bato oyo batindaki koluka, bakutaki bango mpe bayekolaki lisolo ya mpasi na bango na nse ya minyokoli ya Balamani. Mikapo 9–24 milimboli monyokoli mona mpe lolenge kani bakambi na bango—Zenifi, Noa, mpe Limiyi—bazalaki na nse ya Balamani. Liwa ya martiru ya profeta moko oyo abiangamaki Abinadi ekomami lisusu. Alma abongolamaki na komekama ya Abinadi. Mikapo 25–28 mibeti lisusu masolo ya lolenge nini mwana mobali ya Alma mpe bana mibali minei ya Mokonzi Mosiya bakomaki babongwami. Kati na mokapo 29 Mokonzi Mosiya atindaki ete libongisi moko ya basambisi etiama na esika ya bakonzi. Alma mwana mobali ya Alma aponamaki mosambisi mokonzi ya yambo.

Bimisa na lokasa