Masalisi mpo na Makomi
Mpaka


Mpaka

Liloba mpaka esalelami na banzela ya ndenge na ndenge kati na Biblia. Kati na Boyokani ya Kala ezali kolobela bamikolo kati na libota, baoyo bapesami makambo ya boyangeli (Gen. 50:7; Yos. 20:4; Luta 4:2; Mat. 15:2). Mibu mpe mayele na bango ya mosala ekomisaka toli na bango motuya. Lotomo na bango esengelaki kaka te kozala libiangi ya bonganganzambe.

Ezalaki mpe na bampaka bakulisama na Bonganganzambe ya Melikisedeki na ntango ya Boyokani ya Kala (Esod. 24:9–11). Kati na Boyokani ya Sika, bampaka batangami lokola lotomo moko ya bonganganzambe kati na Eklezia (Yak. 5:14–15). Na kati ya Banefi ezalaki mpe na bampaka bakulisama kati na bonganganzambe (Alma 4:7, 16; Mor. 3:1). Kati na eleko oyo, Joseph Smith mpe Oliver Cowdery bazalaki bampaka ya yambo baoyo bakulisamaki (Mal&May 20:2–3).

Sikawa mpaka ezali nkombo oyo epesami na bamemi ya Bonganganzambe ya Melikisedeki. Ndakisa, bamisionele mibali babiangami lokola bampaka. Lisusu, Apostolo azali mpaka, mpe elongobani kolobela bandimi ya Lisanga likoki ya Bazomi na mibale to Lisanga likoki ya Bantuku sambo na nkombo oyo (Mal&May 20:38; 1 Pet. 5:1). Misala ya bampaka bakulisama kati na Eklezia lelo mipesamaki na emoniseli ya mikolo ya nsuka (Mal&May 20:38–45; 42:44; 46:2; 107:12).

Bimisa na lokasa