Masalisi mpo na Makomi
Basamalia


Basamalia

Bato ya biblia oyo bazalaki kofanda na Samalia nsima ete bokonzi ya Yisalaele ya nordi ekamatama na Basulia. Basamalia bazalaki ndambo Bayisalaele mpe ndambo Bayuda-te. Eyamba na bango ezalaki bosangisi ya boyambi ya Bayuda mpe ya bapaganu. Lisese ya Mosamalia malamu kati na Luka 10:25–37 elakisi boyini boye Bayuda bakolisaki na Basamalia mpo ete Basamalia bapengwaki uta na eyamba ya Bayisalaele. Nkolo atindaki Bapostolo koteya nsango malamu na Basamalia (Mis. 1:6–8). Filipo ateyaki na elonga nyonso nsango malamu ya Klisto na bato ya Samalia mpe asalaki bikamwisi mingi na kati ya bango (Mis. 8:5–39).

Bimisa na lokasa