Masalisi mpo na Makomi
Mosakoli


Mosakoli

Buku moko kati na Boyokani ya Kala oyo ezali na makanisi na ntina ya makambo ya mozindo ya bomoi.

Mokomi ya buku, Moteyi, akomi mingi na ntina ya buku na komitiaka na esika ya baoyo bazangi bososoli ya nsango malamu. Akomi engebene na mayoki ya bato ya mokili—elingi koloba, baoyo “na nse ya moi” (Mosak. 1:9). Ndambo mingi ya buku yango emoni nyonso lokola ezangi bolamu mpe mabe. (Mosak. 9:5, 10). Oyo ezali te lolenge Nkolo alingaki biso tomona bomoi kasi lolenge Moteyi atalaki boni makambo ezali komonana epayi ya bato bazangi mwinda ya bososoli likolo ya mabele. Eteni ya molimo koleka monene ya buku ezali na mikapo 11 mpe 12, wapi mokomi asukisi ete eloko bobele moko ya motuya kowumela ezali se botosi na mitindo ya Nzambe.

Bimisa na lokasa