Masalisi mpo na Makomi
Bafalisai


Bafalisai

Kati na Boyokani ya Sika, lingomba moko ya bato ya eyamba na kati ya Bayuda baoyo kani nkombo elingi koloba batiami mpembeni. Bafalisai bamikumisaki kobatela sikisiki mobeko ya Mose mpe koboyaka eloko nyonso ya bosangisi na baoyo bazalaki Bayuda-te. Bazalaki kondimela bomoi nsima ya liwa, Bosekwi, mpe ete banjelu mpe milimo bazalaka. Bazalaki kondima ete mobeko oyo ekitanisamaki na monoko mpe momeseno ezalaki lolenge moko mpe monene lokola oyo ekomama. Mateya na bango makitisaki eyamba na botosi ya mibeko mpe malendisaki lolendo ya molimo. Yango nde esalaki ete Bayuda mingi batiela Klisto mpe nsango malamu na Ye ntembe. Nkolo afundaki Bafalisai mpe misala na bango na Matai 23; Malako 7:1–23; mpe Luka 11:37–44.

Bimisa na lokasa